Eleki télévizió
Uta lndianapolis (Etats-unis), mama moko akomelaki biso ete auti kosala komande ya mibale ya ba cassettes ya Recueil d’histoires bibliques mpo na mwana na ye ya mobali ya mbula minei. Alobaki boye: ‘Na ntango ngai mpe mobali na ngai tozali kotala télévizió na salon, mwana yango azali ntango nyonso na kuku mpo na kolanda masolo ya Biblia. Yango eyokisaki biso nsoni mpe tokangaki télévizió.’’
Asukisi boye: ’’Tondimisami ete ba cassettes ya Recueil d’histoires bibliques ezali kosalisa mwana na biso ya mobali na kozala nyee mpe na esengo. . . . Botondi mingi.’
Kolanda masolo 116 ya Recueil d‘histoires bibliques kati na ba cassettes ezali nzela malamu mpo na bilenge na kozwa makanisi na mobimba ya Biblia. Mwana moke akoki kobomba makambo mingi koleka soko mposa na ye elamuki. Mabota mingi bamoni ete Recueil d‘histoires bibliques mpe masolo ya mokanda yango oyo ekokisami na ba cassettes, ezali mpenza eloko esengeli mpo na kolamusa mposa yango.