Asili kozwa bolamu—epai wapi?
YESU alobaki: “Esengo epai na baoyo bayebi mposa na bango ya elimo.” (Matai 5:3). Na Moyen-Orient, elenge mwasi moko ya sembo oyo ayebaki bamposa na ye ya elimo alukaki kondimama na Nzambe. Na nsuka, ayaki kozwa bolamu—Epai wapi? Totika ye alimbwela biso yango.
“Nakoli kati na libota ya bakatolike babengami maronite oyo bamipesi mpenza na lingomba. Baboti na biso balakisaki biso kobondela mpokwa nyonso liboso na bikeko, mpe uta bomwana na ngai nazalaki na mposa ya kosalela Nzambe.
“Ekomaki ngai na mibu 17, nakotaki na kuvá mpo na kokoma mamelo. Nakanisaki ete ezalaki mwango malamu mpo na kokokisa mposa na ngai. Kasi namonaki makambo mingi epai na bamamelo oyo ebulunganisaki ngai. Bazalaki kotongana. Bazalaki kolya malamu nzokande bato ya sika bazalaki na biloko mingi te ya kolya. Mpe lisusu, bazalaki komipesa na pite elongo na sango. Nsima na sanza libwa ya komona makambo oyo ya mabe, nalongwaki na kuvá mpe nazongaki epai na biso.
“Nazalaki ntango nyonso komituna mituna mingi, mpe lokola nazalaki kozwa biyano ya malamu te, nazalaki lisusu kosepela na lingomba te. Bongo na 1982 (Nazalaki na mibu 22), ndeko na ngai ya mobali mpe ndeko na ngai ya mwasi babandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Baboti na ngai mpe ngai totemelaki bango. Ndeko na ngai ya mobali zwaki minyoko mingi: abɛtamaki mpe akotaki boloko mpo na kondima na ye ya sika. Kasi, eloko esepelisaki ngai, ezalaki bongo mabongwani minene oyo asalaki na bomoi na ye. Mpe lisusu, na lisalisi ya Biblia, ayanolaki na ndenge malamu na mituna oyo nazalaki komituna uta kala. Nabandaki bongo kotanga Biblia a nkuku kati na butu.
“Mokolo mosusu, nakendaki na assemblée moko ya ba Témoins de Jéhovah mpo na kotala ndenge ezalaki kosalema. Bolingo oyo bayangani bazalaki komonisana ekamwisaki ngai makasi. Bokeseni ezalaki te kati na bazwi mpe babola. Ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda na bomoi na bango makambo oyo bazali koteya.Na ndimi mpenza ete bazalaki na solo.
“Bobele nsima na assemblée, nasɛngaki epai na mwasi moko Témoin de Jéhovah ete ayekola na ngai elongo. Nayebisaki ye malamu ete nalingaki se koyekola mpamba, kasi nakoyangana na makita te mpe nakosakola te. Nzokande, nayaki koyeba nokinoki ete makambo oyo nazalaki koyekola ezalaki solo. Nasambelaki Jéhovah mpe nazwaki ekateli ya kosalela ye. Le 28 Octobre 1983, ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe ngai tobatisamaki. Nazwaki nzela ya kosalela Nzambe, ndenge nazalaki kolinga uta bomwana na ngai.
“Sanza mibale nsima na batisimo na ngai nabandaki mosala ya pionnier auxiliaire, mpe sanza mwambe na nsima nakomaki pionnier permanent. Mbula moko na ndambo na nsima, nabyangamaki mpo na kosala na Béthel, filiale ya ba Témoins de Jéhovah, mpo na mbula mibale. Nakamwaki mingi mpo na komikitisa ya baoyo nyonso basalaka na esika yango. Ata Batemwe oyo bazali na mikumba minene bapesaka maboko na misala lokola kosukola basani nsima na kolya.
“Le 14 mars 1988, nakomaki mosangani ya libota ya Béthel. Oyo nde esengo! Ee, nazwaki bolamu. Epai wapi? Kati na ba Témoins de Jéhovah! Nazali sikawa na mayoki motindo moko na mokomi na nzembo oyo alobaki: ‘Mokolo moko kati na lopango na yo eleki mikolo nkoto epai mosusu.’”—Nzembo 84:10.