Elendiseli na ntango na mpasi
Ozua botangi na biblia oyo etiami na bakasete kati na album kitoko
Mwasi moko afandaka na Etats-Unis, akomaki boye: “Nalingi kotondo bino na ndenge bosaleli biso botangi ya Biblia kati na bakasete”. Mobali na ngai azali na kanser na bɔɔngɔ mpe akoki lisusu kotanga te. Bakasete ekokomela biso lokola likabo mpo na aniversere na libala na biso oyo ekozala le 26 Septembre. Ezali moko na makabo kitoko oyo mpo na yango nakokaki kokanisa. Nakolendisama na likanisi ete ‘ata soko bomoto na ye na libanda ezali kolemba, nde bomoto na ye na kati ekobongwanaka eloko na sika mokolo na mokolo’ na lisalisi na Liloba mpe bilaka na Nzambe.”—2 Bakolinti 4:16.