Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/11 lok. 5
  • “Ye oyo akozongisa maloba na sembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ye oyo akozongisa maloba na sembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Tambolá na ‘nzela ya sembo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Kosalela biblia mpo na kopesa biyano
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Bankulutu, bosambisaka makambo na bosembo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mokanda ya Biblia nimero 20—Masese
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/11 lok. 5

“Ye oyo akozongisa maloba na sembo

NA Lisolo na ye likoló na ngomba, Yesu azongelaki “Mibeko mpe Basakoli”. Eteni ya misato ya Makomami na liebele ezalaki oyo bazalaki kobenga Makomi, kati na yango ezalaki na mikanda na maloba kitoko lokola Nzembo mpe Masese. (Matai 7:12; Luka 24:44) Mikanda nyonso wana mizalaki mpe na mayele na Nzambe.

Na ndakisa, Masese ezalaki kokebisa basambisi na Yisraele na kala boye: “Ye oyo akolobaka na moto mabe ete: ‘Yo moyengebeni, bato bakolakela ye mabe, mabota bakoboya ye. Nde esengo ekozala epai na baoyo bakopamela ye; lipamboli na malamu ekoyela bango. Bato bakopwepwa bibebu na ye oyo akozongisa maloba na sembo.”​—Masese 24:24-26.

Na bongo, soko mosambisi azwi kanyaka to asaleli bokesene, alobi epai na moto mabe ete azali moyengebeni, bato mosusu bakomona ete mosambisi yango abongi na esika na ye te. Ata bato na “mabota” na bapakano oyo bazalaki koyoka lisambisi motindo yango etengama bakokaki kotyola lisambisi yango! Epai mosusu, soko mosambisi azalaki na nguya ya kopamela moto mabe mpe soko azalaki kozongisa maloba na sembo nyonso na ntango ya lisambisi, na ndenge yango bato nyonso bazalaki na limemya epai na ye mpe na bolingo. Bato banso bapusamaki na kotombela ye “mapamboli ya malamu”. Lokola Masese eyebisi yango na nsima, “bakopwepwa bibebu na ye, oyo akoyanola maloba sembo”.

Kopwepwa moto na bibebu ezalaki elembo na limemya kati na mopesi toli mpe baoyo bazalaki komona ndenge azalaki kopamela na bosembo nyonso. Mbala mosusu ata ye oyo apamelamaki andimaki mpamela yango mpe amonisaki motema malamu epai na mosambisi. Masese 28:23 elobi: “Ye oyo akopamela moto akozwa mapamboli nsima, koleka ye oyo akoloba kitoko na lolemo na ye.” Baoyo bazali bankulutu kati na masangá ya boklisto basengeli kosenzela ete boyokani ya boninga to bondeko ebebisa bikateli na bango te. Na kopesaka na bosembo nyonso batoli oyo esengeli, lisangá ekokoma na limemya epai na bankulutu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto