Mituna na batangi
◼ Jéhovah akosaka to azimbisaka ata basaleli na ye lokola emonisi yango Yilimia 4:10 mpe 20:17?
Te, Mozalisi asalelaka mayele mabe te to lokuta. Ata bongo azali na likoki ya kokokisa mokano na ye ya sembo mpo ete ekesana na elikya ya bato. Mpe asalelaka likoki yango.
Yango emonisami kati na Yilimia 4:10, epai mosakoli alobi boye: “Aha! Nkolo Jéhovah, solo okosi kokosa bato oyo mpe Yelusaleme wana olobi ete. Bokozala na kimya, nde mopanga ekoti kati na molimo mpenza.”
Jéhovah asalelaki Jérémie mpo na kosakola mpasi oyo elingaki koyeila libota oyo ezangaki botondi, oyo esengelaki kosalela ye. (Yilimia 1:10, 15-19; 4:5-8; 5:20-30) Nzokande, bato mosusu bazalaki komiloba ete bazalaki basakoli. (Yilimia 4:9) Bazalaki koloba nini epai na libota? Nzambe ayanoli na maloba oyo: “Basakoli bazali kosakola na lokuta . . . Mpe bato na ngai balingi ete ezala bongo.”—Yilimia 5:31; 20:6.
Jéhovah atindaki basakoli oyo ya lokuta te, kasi apekisaki bango te na kopalanganisa nsango lokola oyo: “Bokozala na kimya”, mpe: “Likambo moko mabe ekokwela bino te.” (Yilimia 23:16, 17, 25-28, 32) Libota esengelaki bongo kopona: kondima bisakweli makasi kasi oyo ezalaki ya solo, epesamaki na Jérémie, to kotika ete bamikosa na basakoli ya lokuta, bakosi lokola Hanania mpe Semaya. (Yilimia 28:1-4, 11; 29:30-32) Lokola Nzambe apekisaki te basakoli oyo ya lokuta bazalaki kobulunganisa libota, bakokaki koloba na ye boye: “Okosi kokosa bato oyo mpe Yelusaleme wana olobi ete, Bokozala na kimya.”’
Kasi Jérémie akosamaki na lolenge mosusu. Alobaki: “O Jéhovah, ozimbisi ngai, mpe nazimbisami; olei ngai na nguya mpe olongi. Nazali kotyolama mokolo na mokolo, bato nyonso bakosekaka ngai.”—Yilimia 20:7.
Paschhur, nganga-nzambe oyo ayebanaki mingi, abetaki Jérémie na miso ya bato, mpe akangisaki ye na minyololo. Mpo na makanisi ya bato, mosakoli akomaki mbala mosusu na nsuka, azalaki lisusu na makasi ya koyika mpiko te kati na mosala na ye liboso na botemeli, koseka mpe minyokoli. Kasi ezalaki bongo te, mpamba te Jéhovah asalelaki makasi na ye na lolenge oyo ekesenaki mpenza na makanisi ya Jérémie. Akosaki ye na boye ete asalelaki ye oyo azalaki moto azangi kokoka, mpo na kokokisa makambo oyo mosakoli akokaki kosala te na makanisi na ye moko. Atako Jérémie akamwaki na likambo yango to amonaki lokola ete akosamaki, yango esukaki na esengo: banyokoli na ye bakitisamaki, mpe nsango ya Nzambe esakolamaki.—Yilimia 20:11.
Na yango, soko totali maloba mazwami na zongazonga na yango, Yilimia 4:10 mpe 20:7 elongobani na maloba na Eliu: “Solo, Nzambe akosalaka na mabe te mpe Oyo-na-Nguya-Nyonso akobebisa kosambisa te.”—Yobo 34:12.