‘Tomipesi na Jéhovah, Nzambe na biso monene, libela na libela’
NA SANZA ya avril 1935, mosakoli moko ameriké ayebani malamu akendaki na esanga ya Hawaii. Kokoma na ye kuna ezalaki na ntina mingi mpo na ba Témoins de Jéhovah ya esanga wana, bazalaki bobele 12 na eleko yango, mpe moto oyo akendaki kotala bango ezalaki bongo Joseph Rutherford, président ya mibale ya la Société Watch Tower. Diskur na ye, oyo asalaki yango na ndako moko ya kelasi, ezalaki na motó na likambo ete “Nani akoyangela mokili?” Elobelaki ndenge Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili na mikolo mizali koya; nsango mpo na diskur yango etambolaki mingi.
Uta ebandeli ya lisolo na bango ya ntango oyo, ba Témoins de Jéhovah bazali kolobela mingi kati na kosakola na bango nkombo ya Nzambe mpe Bokonzi na ye. Baoyo nyonso balingi mpe bazali kosalela nkombo mpenza ya Nzambe mozwi-na-nguya — nyonso bakosepela na koyeba ete bandimi ya liboso na esanga yango bazalaki kosalela liloba lehova, nkombo ya Jéhovah na monoko ya bato ya Hawaii. Na 1839 etyamaki libanga ya liboso mpo na kotonga moko kati na bandako-nzambe ya kalakala na Hawaii: ezalaki ndako-nzambe etongamaki na mabanga na mboka Honolulu. Libanga ya ekaniseli oyo batiaki wana ezali na maloba oyo: “Epai na lehova Nzambe na biso monene, libela na libela.”
Uta 1935, mbula oyo ndeko Rutherford akendaki kotala bango, motuya ya ba Témoins de Jéhovah na Hawaii elongwé 12 ekomi kino 5 400 lelo. Mibali wana mpe basi wana bamipesi solo epai na Jéhovah, Nzambe na biso monene, libela na libela’.