Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/9 lok. 22
  • “Liloba elobami na ntango na yango”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Liloba elobami na ntango na yango”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/9 lok. 22

“Liloba elobami na ntango na yango”

Totangi boye kati na Masese 25:11: “Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola wolo etyami kati na palata.” Maloba masengeli mpe misala na boboto akoki kosunga na bopolo nyonso motema ya mosembwi kino ete andimama na Nzambe. Akoki komikundola na esengo nyonso makambo oyo tolobaki to oyo tosalaki ata nsima na bambula. Wana ezalaki ye kotala lisangá moko, mokengeli moko ya zongazonga mpe mwasi na ye babengamaki epai na moklisto mwasi moko autaki kozwa batisimo. Nsima na yango, mwasi ya mokengeli na zongazonga atindelaki moklisto mwasi wana mwa liloba mpo na kotondo ye na ndenge ayambaki bango. Mbula nsambo na nsima, azwaki mokanda elandi:

“Esengelaki nayebisa yo ete uta bambula oyo nyonso, obondisaki ngai mingi kozanga ete yo oyeba yango. Jim mpe yo bolyaki se mbala moko epai na ngai, mpe otindelaki ngai mokanda malamu. Esepelisaki ngai mingi, kasi eloko esimbaki motema na ngai ezali nde mokapo ya Biblia. Naino nabosani yango te. Ezalaki na 1976, mpe nazalaki bobele ngai moko kati na libota na ngai oyo nazalaki kosepela mpenza na solo. Nazalaki koyekola elongo na bana na ngai ya basi mpe nazalaki komeka komimonisa mama malamu; kasi, mbala mosusu, nazalaki kolemba, solo ezalaki kolembisa ngai, nazalaki kolemba liboso na mikumba . . . Ezali ntango yango nde makanisi ya Biblia oyo okomelaki ngai ezalaki komatela ngai na motema, mpe nazalaki komiloba: ‘Nazali mpenza moimi!’ mpe nazalaki lisusu kozwa makasi.

“Na bambula mwambe oyo nyonso, eloko moko te ezalaki na bopusi mingi na bomoi na ngai koleka maloba na yo, mpe nalingaki koyebisa yo yango. Ata mpo na mokapo ya Biblia te, kasi nakanisaki ete moto moko azali na mosala mingi lokola yo azwa ntango ya kopesa ngai merci na ndenge nasalaki makambo oyo nasengelaki kosala.

“Mokapo yango ezalaki 2 Yoane 8.

“Sandra”

Lelo oyo mobali ya Sandra asili kobatisama. Azali mosakoli ya nsango malamu lokola Sandra. Moko kati na bana na bango ya basi azali pionnier permanent, mpe mosusu azali pionnier auxiliaire uta asilisaki kelasi na ye.

Mpo na kosukisa, 2 Yoane 8 elobi nini? “Bomitala bino mpenza ete bobungisa makambo masalaki bino mosala mpo na yango te, kasi ete bozwa libonza litondi malamu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto