Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/8 nk. 7-8
  • Mosolo na kala endimisi bosolo ya bisakweli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosolo na kala endimisi bosolo ya bisakweli
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Kondima bisakweli ya Biblia ebikisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Monima oyo emonisi ete esakweli moko ya Biblia ekokisamaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Ndenge nkombo ya Nzambe epalanganaki
    Lamuká!—2008
  • Bomoi na ntango ya kala—Mbongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/8 nk. 7-8

Mosolo na kala endimisi bosolo ya bisakweli

NDIMBOLA bobele moko ya mosolo na ebende oyo ezali koningana na kati na poche to na porte​—monnaie na yo ezali boye ete okoki kosomba na yango mwa biloko ya mikemike. Kasi ezali na mosolo mosusu ya bibende oyo ezali na nsango eleki motuya.

Mwa moke liboso na kufa na ye, Yesu asakolaki kobebisama monene ya Yelusaleme, kapitale ya libota na Yisraele oyo ezangaki bosembo (Matai 23:37 kino 24:2) Alobaki: “Soko bokomona Yelusaleme kozingama na bibele na basoda, boyeba na ntango yango ete libebisi na yango esili kobelema. Na ntango yango bango na kati na Yuda bakima kuna na ngomba . . . mpo ete oyo ezali ntango na kobukanisa mpo na kokokisa makomi nyonso.”​—Luka 21:20-22.

Na eleko yango, Bayuda bazalaki na nse na boyangeli makasi ya Bokonzi na Baloma. Ndenge nini esakweli na Yesu elingaki kokokana? Ya liboso, mpo na kosilisa botomboki ya Bayuda na 66 ya ntango na biso, Cestius Gallus atambwisaki mampinga ya Baloma mpo na kobundisa Yelusaleme mpe lokola Yesu alobaki yango, mboka ezingamaki. Nsima na yango, Baloma bazongaki nokinoki kozanga ntina mpenza, mpe yango esepelisaki batomboki oyo bamonaki ete elonga yango ezalaki elembo ya bonsomi. Bayuda basalaki ata mosolo ya sika ya bibende, lokola oyo tomoni awa na (nimero 1, 2).

Kasi, na esika ete bamikosa, bayekoli na Klisto batosaki na etinda ya ‘kokima na ngomba’ mpe batikaki bandako na bango na Yudea. Bakendaki epai na Yordani, bakatisaki yango, mpe bamataki epai na nord kino Pella, mpe bafandaki kuna. Kasi yango ezalaki mpenza na ntina, mpamba te na boumeli ya mwa bambula Bayuda oyo batikalaki na Yelusaleme batungisamaki ata moke te? Ya solo, bazwaki mosolo yango ya sika ya ebende, kasi nsima na mwa ntango bakokaki lisusu kosomba na yango eloko moko te. Mpo na nini?

Talela mosolo na ebende oyo elakisami na no. 3 mpe no. 4. Ezali na elongi na général Moloma Vespasien, oyo akitanaki na Cestius Gallus. Engebene Encyclopédie britannique, Vespasien asengelaki “kokamba etumba na Yudea, etumba oyo elingaki kobenda botomboki na Orient mobimba, mpamba te likanisi oyo epalanganaki na ndambo wana ezalaki ete bankolo ya mokili mobimba bakouta na Yudea. Vespasien, moto oyo azalaki komipesa na biyambayamba, andimaki ete elikya yango ekokokana epai na ye”. Historien Josephe alobeli na polele nyonso mpo na bitumba oyo ebimaki na nsima. Nsima wana Vespasien akomaki mokonzi na 69 ya ntango na biso, mwana na ye Titus alandaki lisusu bitumba mpe alongaki kozinga Yelusaleme. Nzala mpe kobanga ekwelaki baoyo bazalaki na kati na ba murs ya mboka. Ntango Yelusaleme ekweaki, ba murs na yango ekweaki mpe temple na yango ebomamaki.

Bato boni bakufaki kati na baoyo baboyaki koyoka likebisi na Yesu? “Bayuda babundelaki mboka na bango na molende ya kokamwa, mpo na litomba ya bato oyo bakomaki pene na liwa. Yango ememaki liwa ya bato 100 000 kati na bango. Nsima wana bamonaki bango moko ndenge temple etumbamaki mpe ebebisamaki nyee, bato pene na 100 000 bamemamaki na boombo, mpe mingi kati na bango bakomisamaki na makasi babundi oyo bamipesi na liwa to bakomaki bilei ya banyama ya nkanda na ntango ya ‘masano’ oyo ebongisamaki epai na molongi Titus.​—La monnaie aux temps bibliques (Angl.).

Mokanda oyo etangami awa na likolo elimboli ete na 71 ya ntango na biso Vespasien mpe Titus batambolaki na elonga nyonso na balabala na Loma mpo na kosepela elonga na bango Kasi “oyo eumelaki koleka défilé nyonso to feti nyonso ezali bongo ebele na mosolo na ebende oyo emonisaki ‘bolongi”’, mingi mpenza oyo na wolo (nimero 5) esalisamaki na Vespasien mpo na kokanisa bolongi ya Baloma na Yudea.

Maloba na esakweli na Yesu oyo matali nsuka na biloko na Bayuda mamonanaki ete mazalaki mpamba epai na Bayuda mingi, kasi ata bongo ekokanaki, mpe mosolo na ebende oyo ezali lilatoli. Esakweli na Yesu ekokani lisusu na bonene na yango lelo oyo: ezali kolaka kokwea ya biloko mabe ya ntango oyo. Sikawa ezali bobele likambo na yo mpo na koyeba soko nsango yango etali mpenza nini na eleko na biso mpe ndenge nini okoki kobika na likambo yango oyo ebelemi.

[Etanda/​Bililingi na lokasa 8]

1. Na elongi: Pruta (to prutah) ya bronze oyo esalemaki nsima na Botomboki na liboso (66-70 ya ntango na biso), likolo na yango ezali na kopo na bisimbeli mibale. Makomi na hébreu malimboli “mbula mibale”, elingi koloba mbula na mibale ya lipanda na Bayuda.

2. Nsima na yango: Lokasa na vinyo elingami na maloba “Bonsomi na siona”to “Lisiko na siona”.

3. Na elongi: Mosolo na bronze esalisamaki na mokonzi Vespasien mpo na kokanisa bolongi na Yudea. Makomi na mokuse na latin oyo mazingi elongi na ye mazali lMP[erator] (Moyangeli) CAES[ar] VESPASIAN[us] AVG[ustus] P[ontifex] M[aximus] (nganga-nzambe monene) TR[ibunicia] P[otestate] (nkolo na nguya na esambiselo) P[ater] P[atriae] (tata na libota) CO[n]S[ul]III(na boyangeli na ye mpo na mbala na misato), yango elingi koloba ete mbongo yango ya ebende esalemaki na 71 ya ntango na biso.

4. Na nsima na yango: Na loboko ya mwasi, mokonzi Vespasien (to général Titus) alati uniforme mpe azali kosepela asimbi likonga mpe mbeli, atye lokolo likolo na ekoti. Na loboko na mobali, Moyuda ya mwasi na nse na nzete, afandi mpe azali kolela. Maloba lVDAEA CAPTA malimboli “Yudea ezwami”. Bakomaki likolo na yango S[enatus]C[onsulto], “na ndingisa na Sénat”.

5. Na nsima na yango: Aureus (Mosolo na wolo) na eleko na Vespasien, ezali komonisa mpasi na Yudea.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Histoire proche-orientale) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto