Oyo okoki kosala mpo boyekoli oyo ya Biblia esalisa yo mpenza
Liboso, talá makambo oyo elandi mpe na nsima talá VIDEO.
ETENI YA LIBOSO
Mpo na kobongisa liteya mokomoko, tángá eteni ya liboso ná mituna oyo ezali likoló ya baparagrafe (A) mpe bavɛrsɛ (B) oyo ebimisi makanisi ya ntina. Okomona bavɛrsɛ mosusu bakomi “tángá.”
ETENI YA KATIKATI
Makambo (C) oyo ezali na Kɔtá na mozindo emonisi mateya oyo bokotalela. Batitre ya mike (D) ezali komonisa makanisi ya ntina. Elongo na moteyi na yo, tángá bavɛrsɛ, pesá biyano na mituna, mpe talá bavideo.
BAVIDEO ezali kobakisa makanisi mosusu na liteya. Bavideo mosusu ezali kolakisa makambo oyo esalemá mpenza. Mosusu ezali kaka bilakiseli ya makambo oyo esalemá mpenza te, kasi ezali mpenza komonisa makambo ya solo.
Talá bililingi mpe maloba oyo ezali na nse na yango (E), mpe kanisá eyano oyo okopesa na eteni Soki moto alobi na yo (F).
ETENI YA NSUKA
Na mokuse mpe Bozongeli (G) nde esukisi liteya. Komá dati oyo bosilisi liteya. Oyo okoki kosala (H) ezali kopesa yo likoki ya kosalela makambo oyo oyekoli mpe kokokisa mokano moko. Makanisi mosusu (I) Ezali na makambo mosusu oyo okoki kotánga mpe bavideo oyo okoki kotala.
Makambo oyo ezali na kati
|
|
|
|
|
Ndenge ya koluka bavɛrsɛ ya Biblia
Biblia mobimba ezali na mikanda mikemike 66. Ekabolami na biteni mibale: Makomami ya Ebre mpe ya Aramɛyɛ (“Kondimana ya Kala”) mpe Makomami ya Grɛki (“Kondimana ya Sika”).
Soki omoni vɛrsɛ moko na boyekoli oyo, yebá ete ebandaka na nkombo ya mokanda ya Biblia (A), na nsima mokapo (B), mpe vɛrsɛ to bavɛrsɛ (C).
Na ndakisa, Yoane 17:3 elingi koloba mokanda ya Yoane, mokapo 17, vɛrsɛ 3.