Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 18 lok. 21
  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Koloba na esengo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 18 lok. 21

LITEYA 18

Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo

Vɛrsɛ

1 Bakorinti 9:19-23

NA MOKUSE: Salisá bato bákanisa mpe bámona ete bayekoli likambo ya malonga.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Talelá makambo oyo bato yango bayebi. Na esika ozongela kaka makambo oyo bayokaka, salisá bango bázwa mwa eloko ya sika na liteya oyo okolobela.

    Toli

    Okoki kokende mwa mbangu ntango ozali kolobela makambo oyo bayebi, kasi kende mwa malɛmbɛ ntango ozali kolobela likambo ya sika.

  • Luká makanisi na mikanda mpe manyolá. Soki esengeli, kɔtisá mwa makambo oyo bayoká naino te to makambo oyo euti kosalema mpo na kolimbola makanisi ya ntina. Zwá ntango mpo na kokanisa makambo oyo okoteya mpe ndenge ya koyokanisa makambo yango ná bandakisa oyo okopesa.

    Toli

    Ntango ozali kobongisa lisolo na yo, kanisá ndenge oyo okoki kopesa biyano na mituna lokola ‘nini, mpo na nini, ntango nini, epai wapi, nani, mpe ndenge nini.’ Kómisá mateya na yo elɛngi na mituna lokola oyo wana mpe biyano oyo okopesa ntango ozali koteya.

  • Salisá bato bámona ndenge oyo mateya yango ekoki kosalisa bango. Limbolá ndenge oyo makanisi ya Biblia ekoki kosalisa bato na bomoi na bango. Lobelá makambo, makanisi, mpe bizaleli oyo ezali mpenza na ntina mpo na bato oyo bakoyoka yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto