Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • th liteya 15 lok. 18
  • Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba
  • Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Masolo mosusu
  • Komonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Koloba na esengo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Koloba lokola ozali kosolola na bato
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
  • Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
th liteya 15 lok. 18

LITEYA 15

Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba

Vɛrsɛ

1 Batesaloniki 1:5

NA MOKUSE: Monisá ete ozali kondima mpenza makambo oyo ozali koteya mpe ete makambo yango ezali na ntina mingi.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Mibongisá malamumalamu. Yekolá lisolo na yo tii okoyeba malamu makanisi na yango ya ntina mpe ndenge oyo bavɛrsɛ ya Biblia ezali kondimisa yango. Salá makasi obimisa makanisi ya ntina ya lisolo na yo na maloba moke mpe ya pɛtɛɛ. Luká mingimingi makambo oyo ekoki kosalisa bato oyo bakoyoka yo. Bondelá mpo na kosɛnga elimo santu.

    Toli

    Mekámeká lisolo na yo na mongongo makasi mpo omesana na yango mpe osala yango malamu.

  • Salelá maloba oyo ekomonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba. Na esika ozongela kaka maloba oyo ekomami na plan to na mokanda, lobá yango na maloba na yo moko. Zalá na elobeli oyo ekomonisa ete ozali mpenza kondima makambo oyo ozali koloba.

  • Maloba na yo euta mpenza na motema. Lobá na mongongo oyo ebongi. Soki yango emonanaka mabe te na mboka na bino, mbala na mbala, taláká bilongi ya bato oyo bazali koyoka yo.

    Toli

    Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba elimboli te kozanga takte, to koluka kolongisa maloba na yo, to kondimisa bato na makasi. Ata soki ozali koloba maloba oyo euti na motema, lobá na bato na boboto.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto