LOYEMBO 138
Kitoko ya nsuki mpɛmbɛ
Ya Papye
1. Tozali na mibange
Kati na biso.
Nzoto elɛmbi mpenza
Nde baza’ sembo.
Mingi, mwasi akufá,
To mpe mobali.
Tata, tobondeli yo:
Kanisá bango.
(MONDIMO)
Yah, kobosana te
Oyo basalá.
Mpe lobá na bango:
“Bana, longonya!”
2. Nsuki mpɛmbɛ kitoko,
Na nzel’a sembo.
Nzambe alingi bango
Mpo baza’ sembo.
Bango mpe bazalaki
Bilenge kala.
Basalaki mosal’a
Yehova Nzambe.
(MONDIMO)
Yah, kobosana te
Oyo basalá.
Mpe lobá na bango:
“Bana, longonya!”
(Talá mpe Nz. 71:9, 18; Mas. 20:29; Mat. 25:21, 23; Luka 22:28; 1 Tim. 5:1.)