LOYEMBO 124
Tótikala sembo
Ya Papye
1. Zalá sembo ntango nyonso,
Lingá Yehova seko.
Mpe lokola omipesi,
Tosáká mibeko n’e.
Soki apesi yo toli,
Tosá, ekofuta yo.
Aza’ sembo; ndimelá ye,
Okotelengana te.
2. Zalá sembo na bandeko,
Na bisengo, na mpasi.
Talá bango, sungá bango,
Kokanisa mabe te.
Tókumisa nde bandeko,
Tópesa bango kilo.
Eya butu, eya moi,
Tókima bandeko te.
3. Zalá sembo na malako
euti na bandeko
Bazali kokamba biso;
Kobá kotosa bango.
Landá oyo basɛngi yo,
Okozwa mapamboli.
Zalá sembo mpo na seko,
Yehova aza’ na yo.
(Talá mpe Nz. 149:1; 1 Tim. 2:8; Ebr. 13:17.)