LOYEMBO 101
Tósala na bomoko
Ya Papye
1. Nzambe alongoli biso
Na bokabwani ya bato.
Bomoko, kimya na biso
Ezali esengo.
Tólɛngɛla yango
Eza’ motuya.
Mosala eza’ ebele
N’ebongiseli ya Nzambe.
Tópesanaka mabɔkɔ,
Tóbendanaka te.
2. Tókoba kosɛnga Nzambe
Mbuma ya elimo na ye
Mpo tókolisa bolingo,
Kimya mpe esengo.
Soki kimya eza’,
Kitoko mpenza!
Mpo tózwa kimya ya Nzambe,
Tólingana mpenza solo.
Na bomoko banda lelo,
Tósalela Nkolo.
(Talá mpe Mika 2:12; Sef. 3:9; 1 Ko. 1:10.)