LOYEMBO 87
Yaká kozwa makasi!
Ya Papye
1. Mokili oyo ekɔti mobulu;
Bato bayebi Nzambe te.
Yango, tolingi Yehova ye moko
Alakisa biso nzela.
Na makita toza’ kozwa makasi
Nzambe ateyaka biso:
Tókolisa bizaleli malamu,
Kondima, mpiko, molende.
Makambo Yehova asɛngi biso,
Tokosala kaka yango.
Soki na makita totye likebi,
Tokokola na elimo.
2. Yehova ayebi biso malamu;
Tóboya toli na ye te.
Moto ya bwanya asalaka nyonso
Azangisa makita te.
Kuna nde mibali, bato y’elimo,
Bateyaka biso solo.
Toyebaka mpe toza’ na bandeko,
Libota ya bato’a Nzambe.
Awa toza’ kozela paradiso,
Tókangama na bandeko.
Mpo tókóma na bwanya ya likoló,
Tózangisa makita te.
(Talá mpe Nz. 37:18; 140:1; Mas. 18:1; Ef. 5:16; Yak. 3:17.)