Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • sjj loyembo 62
  • Loyembo ya sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Loyembo ya sika
  • Tóyembela Yehova na esengo
  • Masolo mosusu
  • Loyembo ya sika
    Tóyembela Yehova
  • Loyembo ya sika
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Tóyembela Yehova na mpiko nyonso!
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
  • Nazwi bomoi ya seko!
    Tóyembela Yehova na esengo
Makambo mosusu
Tóyembela Yehova na esengo
sjj loyembo 62

LOYEMBO 62

Loyembo ya sika

Ya Papye

(Nzembo 98)

  1. 1. Yembelá Nzambe loyembo oyo ya sika.

    Lobelá misala na ye ya kokamwa.

    Nani akoki kolonga lobɔkɔ na ye?

    Alingá bosembo,

    Mosambisi’a sembo.

    (MONDIMO)

    Yembáká!

    Loyembo ya sika!

    Yembáká!

    Yehova, Mokonzi.

  2. 2. Gangá n’esengo, sepelá: Nzambe, Mokonzi!

    Pesá ye lokumu; yembá na esengo.

    Yo ná bandeko, bóyemba mpo na Yehova.

    Nzɛnzɛ, mbonda, bɛtá;

    Kelelo, lindanda.

    (MONDIMO)

    Yembáká!

    Loyembo ya sika!

    Yembáká!

    Yehova, Mokonzi.

  3. 3. Mai monene, yembelá Mokeli na yo.

    Mabele mpe yembá, ná biloko na yo.

    Mbu mpe bibale, bóbɛtɛla ye mabɔkɔ.

    Ngomba mpe mabwaku,

    Bóyembela Nzambe.

    (MONDIMO)

    Yembáká!

    Loyembo ya sika!

    Yembáká!

    Yehova, Mokonzi.

(Talá mpe Nz. 96:1; 149:1; Yis. 42:10.)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto