LOYEMBO 33
Bwakelá Yehova mokumba na yo
Ya Papye
1. Yoká libondeli na nga.’
Wapi yo, Nzambe na nga’?
Mpo natungisami mpenza;
Yehova, salisá nga’.
(MONDIMO)
Bwakelá Yehova Nzambe
Mokumba na yo ya kilo.
Akobatela yo seko.
Akosundola yo te.
2. Nazala lokola ndɛkɛ,
Napumbwa na likoló,
Mpo nakima bato oyo
Balingi koboma nga’.
(MONDIMO)
Bwakelá Yehova Nzambe
Mokumba na yo ya kilo.
Akobatela yo seko.
Akosundola yo te.
3. Yah abɔndisaka biso,
Tozwaka mpenza kimya.
Mokumba, kilo elongwe.
Ye, boboto nsuka te.
(MONDIMO)
Bwakelá Yehova Nzambe
Mokumba na yo ya kilo.
Akobatela yo seko.
Akosundola yo te.