LOYEMBO 15
Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!
Ya Papye
1. Tókumisa Mwana,
Mokonzi Nzambe atye.
Bokonzi na ye sembo;
Mpe mapamboli mingi.
Atɛlɛmi na nkembo
Kobundela Nzambe,
Alobi Yah abongi
Kozala Mokonzi.
(MONDIMO)
Tókumisa Mwana!
Mokonzi Nzambe atye.
Lelo na Ngomba Siona,
Azali koyangela!
2. Tókumisa Mwana,
Akufelaki biso.
Asikolaki biso;
Tolimbisami mpenza.
Mwasi ya Kristo ayei,
Na bilamba mpɛmbɛ.
Bakosukisa ntembe
Ya bangun’a Nzambe.
(MONDIMO)
Tókumisa Mwana!
Mokonzi Nzambe atye.
Lelo na Ngomba Siona,
Azali koyangela!