LOYEMBO 6
Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe
Ya Papye
1. Likoló, sakolá nkembo ya Nzambe.
Mapata, monisá nguy’a
lobɔkɔ n’e.
Ntɔngɔ mpe eza’ kokumisa ye.
Butu, sakolá bolingo,
Bwanya, mpe nguya n’e.
2. Mibeko ya Yehova nde lobiko,
Mateya n’ekambi mikóló,
bilenge.
Malako na ye ezali sembo.
Liloba na ye nde solo,
Mibeko n’e pɛto.
3. Kobanga Yah eza’ pɛto mpe seko.
Bikateli na ye
ezali malamu.
Bitinda na ye ebatelaka.
Tókumisa nkombo na ye,
Ye, Nzambe monene.
(Talá mpe Nz. 111:9; 145:5; Em. 4:11.)