Makambo oyo ezali na kati
ETENI 1 MPO NA NINI KOZONGELA YEHOVA?
Basaleli ya Yehova na ntango ya kala bakutanaki na mikakatano lokola oyo biso tozali kokutana na yango lelo oyo. Yehova atikaki bango te, asalisaki bango; mpe ndenge alaki yango, akosala mpe bongo mpo na biso lelo. Lokola Yehova azali mobateli ya mpate oyo atyelaka bampate na ye likebi mpe alingaka yango, alukaka oyo ebungi mpe abengaka yango ezongelaye.
Eteni 1 “Oyo ebungi, nakoluka yango”
ETENI 2-4 MPO NA NINI EZALAKA MPASI KOZONGELA YEHOVA?
Ntango mosusu, ata basaleli ya sembo ya Nzambe bazalaki na mitungisi, bazokaki na motema, bamonaki ete bamemi ngambo, mpe yango elɛmbisaki bango na mosala ya Nzambe. Talá ndenge Yehova asalisaki bango bázwa lisusu makasi, báyangana lisusu na basaleli na ye, mpe bázongela esengo na bango.
Eteni 2 Mitungisi—“Tokamolami na ndenge nyonso”
Eteni 3 Soki ndeko moko azokisaki yo—Ntango ‘tozali na likambo’ na basusu
Eteni 4 Komimemisa ngambo—“Pɛtolá ngai na lisumu na ngai”
ETENI 5 NDENGE YA KOZONGELA YEHOVA
Talá makambo oyo emonisi ete Yehova alingi ozongela ye. Yoká ndenge bakristo mingi bazongelaki Yehova, ndenge lisangá eyambaki bango, mpe ndenge bankulutu basalisaki bango bázongela kosalela Nzambe na molende.
Eteni 5 Bozongela “mobateli ya mpate mpe mokɛngɛli ya molimo na bino”