Ozelaka mpenza komona makambo oyo Bokonzi elaki?
ETENI 7
Bilaka ya Bokonzi—Kosala biloko nyonso biloko ya sika
KANISÁ ete obuki pɔme moko oyo ekɔmelá na nzete. Oyoki naino nsolo na yango ya kitoko, na nsima otye yango na kitunga ya bapɔme. Mwa bangonga eleki banda obandaki kosala, kasi lokola ozali nzoto makasi omoni ete okoki kokoba kosala. Mama na yo afandi kuna, na nse ya nzete, azali kosala na esengo mpe azali kosolola na bandeko mpe baninga ya libota na bino oyo bazali kosalisa ye na kobuka mbuma. Mama akómi lokola elenge, ndenge ozalaki komona ye ntango ozalaki mwana moke. Ozali kondima te ete omonaki ye ndenge anunaki na mokili oyo bozalaki liboso. Omonaki ndenge abɛlaki makasi, mpe osimbaki lobɔkɔ na ye ntango akataki motema, mpe olelaki makasi na lilita na ye. Sikoyo, ye wana, ndenge moko na bato mosusu ebele, azongi na bomoi mpe azali nzoto makasi!
Toyebi ete makambo yango ekosalema. Toyebi yango mpo bilaka ya Nzambe ezangaka kokokisama te. Na eteni oyo, tokolobela ndenge bilaka mosusu ya Bokonzi ekokokisama mosika te, liboso ya etumba ya Armagedone. Tokolobela mpe bilaka ya Nzambe oyo ekokokisama na nsima. Ekozala mpenza esengo ntango tokomona Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela mabele mobimba, mpe kokómisa biloko nyonso biloko ya sika!