Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yc liteya 7 nk. 16-17
  • Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?
  • Teyá bana na yo
  • Masolo mosusu
  • Esilá kokómela yo omiyoka ete ozali yo moko mpe obanga?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nzambe na ye abɔndisaki ye
    Mekolá kondima na bango
  • Nzambe na ye apesaki ye makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Okozala sembo lokola Eliya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Teyá bana na yo
yc liteya 7 nk. 16-17
Elenge mobali azali komiyoka ete azali ye moko mpe azali kobanga

LITEYA 7

Esí ekómela yo obanga to ozala lokola mwana ya mawa?

Talá mwana wana na fɔtɔ. Azali lokola mwana ya mawa mpe azali kobanga. Yo mpe osí omiyoká ndenge wana?​— Moto nyonso amiyokaka bongo na bantango mosusu. Biblia elobeli bato oyo bazalaki baninga ya Yehova, kasi oyo na ntango moko boye babangaki mpe bazalai lokola bana ya mawa. Moko na bango ezali Eliya. Tólobela ye naino.

Mokonzi mwasi Yezabele azali na nkanda mpe azali koganga

Yezabele alukaki koboma Eliya

Eliya azalaki kofanda na Yisraele kala mpenza, liboso Yesu abotama. Ahaba, mokonzi ya Yisraele, azalaki kosambela Yehova te. Ahaba ná Yezabele mwasi na ye bazalaki kosambela Baala, nzambe ya lokuta. Na yango, Bayisraele mingi mpe bakómaki kosambela Baala. Yezabele azalaki makambo mabe mpe alukaki koboma bato nyonso oyo bazalaki kosambela Yehova, ata mpe Eliya! Oyebi soki Eliya asalaki nini?​—

Eliya akimaki! Akendaki mosika na esobe mpe abombanaki na libulu moko. Mpo na yo, asalaki bongo mpo na nini?​— Ɛɛ, azalaki kobanga. Nzokande, Eliya asengelaki kobanga te. Mpo na nini? Mpo ayebaki ete Yehova akoki kobatela ye. Liboso, Yehova amonisaki nguya na ye epai ya Eliya. Mokolo moko, Yehova ayanolaki na libondeli ya Eliya mpe mɔtɔ eutaki na likoló ekiti. Na yango, mbala oyo mpe Yehova akokaki kosalisa Eliya!

Yehova ayanolaki na libondeli ya Eliya: atindaki mɔtɔ oyo euti na likoló; Eliya na kati ya libulu; Eliya akómi na esengo nsima ya koyoka maloba ya kolendisa ya Yehova

Ndenge nini Yehova asalisaki Eliya?

Ntango Eliya azalaki na libulu wana, Yehova atunaki ye: ‘Ozali kosala nini awa?’ Eliya alobaki: ‘Natikali kaka ngai moko na losambo na yo. Nazali mwana ya mawa, mpe nazali kobanga báboma ngai.’ Eliya akanisaki ete babomaki basambeli nyonso ya Yehova. Kasi Yehova alobaki na Eliya: ‘Te, ezali solo te. Ezali na bato mosusu 7 000 oyo bazali kosambela ngai. Zalá na mpiko. Nazali na mosala mingi ya kopesa yo!’ Okanisi ete Eliya asepelaki koyoka bongo?​—

Likambo oyo ekómelaki Eliya ekoki koteya yo nini?​— Osengeli te kobangaka mpe kozala lokola mwana ya mawa. Ozali na baninga oyo balingaka Yehova mpe balingaka yo. Lisusu, Yehova azali na nguya mingi, mpe akosalisa yo! Osepeli koyeba ete ozali kaka yo moko te, lokola mwana ya mawa?​—

TÁNGÁ NA BIBLIA

  • 1 Bakonzi 19:3-18

  • Nzembo 145:18

  • 1 Petro 5:9

MITUNA:

  • Na ntango ya Eliya, bato mingi na Yisraele bazalaki nde kosambela Yehova? Bazalaki kosambela nani?

  • Mpo na nini Eliya akimaki mpe abombanaki na libulu?

  • Yehova ayebisaki Eliya nini?

  • Makambo oyo ekómelaki Eliya ekoki koteya biso nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto