Loyembo 6
Libondeli ya mosaleli ya Nzambe
Ya Papye
1. Tata na biso ya likoló,
Tiká tókumisa nkombo na yo.
Mawa na yo ekosila te,
Oza’ sembo okosaka te.
Yo sembo Okosi te,
Mawa na yo nsuka te.
2. Pesá nzela tólinga solo.
Tiká tósala mokano na yo.
Tótosa nde mibeko na yo,
Tóluka mpe bampate na yo.
Tóleisa mpate na yo,
Mpe tótosa mibeko.
3. Pesáká biso bwanya na yo.
Tiká ete tólona bolingo.
Salisá biso tólingaka,
Tósalisa bato báyeba.
Báyeba Nkombo na yo,
Tólakisa bolingo.
(Talá mpe Nz. 143:10; Yoa. 21:15-17; Yak. 1:5.)