Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp2 lok. 287
  • Bandakisa ya kolanda—Asafe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ya kolanda—Asafe
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Masolo mosusu
  • Bozwi ekoki kotya kondima na yo na komekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ndenge ya kolonga makanisi mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Yehova azali likabo na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bósepela ndenge bozali baklisto!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
yp2 lok. 287

Bandakisa ya kolanda—Asafe

Asafe azalaki na eleko moko ya mpasi na bomoi na ye. Azalaki komona bato ya eleko na ye bazali kobuka mibeko ya Nzambe mpe ezalaki komonana ete bazalaki kozwa etumbu te! Mpo na yango, Asafe azalaki komituna soki ezalaki na ntina aboma nzoto mpo na kosepelisa Nzambe. Alobaki boye: “Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpamba mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.” Kasi nsima ya kokanisa malamumalamu likambo yango, Asafe abongolaki makanisi na ye. Amonaki ete bisengo oyo bato mabe bazali na yango ezali ya ntango mokuse. Mpo na kosukisa, Asafe ayebisi Yehova na loyembo ete: “Longola yo, nazali na esengo mosusu te na mabele.”—Nzembo 73:3, 13, 16, 25, 27.

Mbala mosusu esilá mpe kokómela yo omituna soki kolanda mateya ya Biblia ezali mpenza na ntina. Kasi na ndakisa ya Asafe, taláká mosika. Talá bomoi ya bato oyo baboyaki kotosa mibeko ya Yehova. Bazali mpenza na kimya? Bayebi nde sɛkɛlɛ ya kozala na bomoi ya esengo, oyo bato oyo bazali sembo epai ya Nzambe bayebi te? Soki okanisi malamumalamu, na ntembe te yo mpe okomona ete maloba oyo ya Asafe ezali mpenza solo: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu.”—Nzembo 73:28.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto