Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yp2 lok. 193
  • Bandakisa ya kolanda​—Hizikiya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ya kolanda​—Hizikiya
  • Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Masolo mosusu
  • Apesá biso bonsomi ya kopona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Akangamaki se na Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nzambe asalisi Hizikiya
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Kondima ya mokonzi moko ezwi mbano
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
yp2 lok. 193

Bandakisa ya kolanda​—Hizikiya

Hizikiya akutani na likambo moko monene na bomoi na ye. Azali kaka na mbula 25, mpe akómi mokonzi ya Yuda. Akozala mokonzi ya ndenge nini? Akolanda nde ndakisa mabe ya tata na ye, Mokonzi Ahaze? Tii na liwa na ye, Ahaza azalaki mopɛngwi oyo abongolaki motema te. Alendisaki losambo ya lokuta mpe atumbaki kutu moko ya bandeko ya Hizikiya na etumbelo ya bapakano. (2 Ntango 28:1-4) Nzokande, Hizikiya atikaki te ete ndakisa ya bokosi ya tata na ye etinda ye aboya losambo ya Yehova; amonaki mpe te ete ye mpe asengeli kozongela kaka mabunga oyo tata na ye asalaki. Kutu, Hizikiya “akangamaki se na Yehova.”—2 Bakonzi 18:6.

Moko na baboti na yo atyolaka losambo ya Yehova? Anyokolaka yo to azalaka na momeseno moko ya mabe? Soki ezali bongo, yo osengeli kaka te kosala mabunga ya moboti na yo! Hizikiya atikaki te ete ezaleli mabe ya libota na ye ebebisa ye. Kutu, akómaki mokonzi moko ya malamu mpe “nsima na ye, moto moko te azalaki lokola ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda.” (2 Bakonzi 18:5) Na ndakisa ya Hizikiya, yo mpe okoki kolonga na bomoi ata soki bato ya libota na yo bazali na bizaleli malamu te. Ndenge nini? ‘Kangamá se na Yehova.’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto