Ngámbo ya kati ya ezipeli
Ndeko motángi:
Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki ete: “Elenge, sepelá na bolenge na yo, mpe motema na yo esala yo malamu na mikolo ya bolenge na yo, mpe tambolá na banzela ya motema na yo mpe na makambo oyo miso na yo emoni.” (Mosakoli 11:9) Ntango moto azali elenge, bomoi ezalaka na makambo ya kitoko mpe ya esengo mpenza, mpe tolingi ete osepela na yango. Kasi, tozali kolendisa yo ete osalela bolenge na yo na ndenge oyo ekosepelisa Yehova Nzambe. Kobosana te ete azali komona makambo oyo ozali kosala na bomoi na yo mpe akosambisa yo mpo na yango. Na yango, ekozala mpenza malamu soki olandi toli mosusu oyo Salomo apesaki: ‘Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.’—Mosakoli 12:1.
Mposa na biso ezali ete makambo oyo ezali na buku oyo esalisa yo olonga botɛmɛli ya baninga mpe komekama oyo bilenge bazali kokutana na yango, mpe esalisa yo oyeba kozwa bikateli oyo eyokani na mokano ya Nzambe. Soki osali bongo, okosepelisa mpenza motema ya Yehova.—Masese 27:11.
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova