ETENI 4
“Nzambe azali bolingo”
Na bizaleli nyonso ya Yehova, bolingo nde eleki. Yango mpe eleki kosepelisa bato. Wana tozali kotalela mwa makambo ya kosepelisa ya ezaleli yango ya ntina mingi, tokoyeba mpo na nini Biblia elobi ete “Nzambe azali bolingo.”—1 Yoane 4:8.