Nsango malamu ekoki kopesa bato bolamu na esika ofandi
LELO oyo, bato mingi balobaka ete: “Mitinda ya boklisto ekoki kobongola eloko moko te. Ekoki kosalisa bato te na mokili ya lelo oyo ekómi na makambo ndenge na ndenge.” Nzokande, ntango Mohandas K. Gandhi, mokonzi ya Bahindu mpe Lord Irwin, moto ya ekólo Grande-Bretagne oyo azalaká vice-roi na Inde, bazalaki kosolola mokolo moko, balobaki likambo moko oyo ekeseni mpenza ndenge bato mingi bakanisaka lelo. Lord Irwin atunaki Gandhi mpo na koyeba eloko nini azalaki kokanisa oyo ekoki kosilisa matata oyo ezali kati na Grande-Bretagne mpe Inde. Ghandi azwaki Biblia mpe afungolaki yango na mokapo ya mitano ya mokanda ya Matai mpe alobaki ete: “Na ntango mboka na yo mpe oyo ya ngai ekolanda mateya oyo Klisto apesaki na Lisolo Likoló na Ngomba, tokosilisa mikakatano bobele ya bamboka na biso te, kasi mpe oyo ya mokili mobimba.”
Lisolo oyo Klisto asalaki likoló na ngomba ezali komonisa ntina ya koluka koyeba makambo ya elimo mpe kozala na komikitisa, koluka kimya, kozala na motema mawa, mpe kosala makambo na bosembo. Lisolo yango esuki te kaka na kokweisa likambo ya koboma bato kasi ezali mpe kokweisa ezaleli ya kokangela bato nkanda, esuki te kaka kokweisa ekobo kasi ezali mpe kokweisa makanisi mabe. Lisolo yango epekisi mpe likambo ya koboma libala mpambampamba, likambo oyo ezali kopanza mabota mpe koyokisa bana mpasi. Lisolo yango elobi na biso ete: ‘Bólinga ata bato oyo bazali koyina bino, bókabela babola, bótika kosambisa bato mosusu na motema makasi, bósalela bato mosusu makambo ndenge bino bolingi ete bato mosusu básalela bino.’ Soki bato basaleli toli yango nyonso, yango ekoki kobimisa matomba mingi. Soki bato mingi na esika ofandi balandi toli yango, bato bakozala malamu mpe okomona ete mboka ekokóma mpe malamu koleka!
Batatoli ya Yehova balendisaka bato básalaka bongo. Biblia eteyaka bango bápesaka libala lokumu. Batatoli bateyaka bana na bango bázala na bizaleli malamu. Bamonisaka ete libota ezali na ntina mingi. Mabota oyo ezali na bomoko ezali mpenza bolamu mpo na bato nyonso esika ofandi, Ata mpe mpo na ekólo mobimba. Tozali na bandakisa ya kala ebele oyo emonisi ete mikili oyo ezalaki ya nguya ekweyaki mpo ete mabota ezalaki lisusu na bomoko te mpe bato bamipesaki mingi na kosala pite. Soki Batatoli ya Yehova batei bato mingi na esika ofandi ete bámemyaka mitinda ya boklisto, mobulu, makambo ya pite mpe makambo mingi ya mabe ekozala lisusu mingi te.
Moko na mikakatano ya minene oyo ezali kobebisa bamboka mpe bikólo ezali likambo ya kokanisela bato ya mposo mosusu mpe bikólo mosusu mabe. Nzokande, ntoma Petelo alobaki ete: “Namoni ete Nzambe [aponaka bilongi] te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka [bosembo] ayambami na ye.” Mpe Paulo akomaki ete: “Moyuda azali te soko [Mogrɛkɛ] te, moombo azali te soko nsomi te, mobali azali te soko mwasi te, Nde bino nyonso bozali moko kati na Klisto Yesu.” (Misala 10:34, 35; Bagalatia 3:28) Batatoli ya Yehova bandimaka likambo yango. Ezala na biro na bango ya monene, na bafiliale, mpe na masangá, bato ya mposo nyonso mpe ya bikólo nyonso bafandaka esika moko mpe basalaka esika moko.
Na Afrika, ezali na bikólo mosusu oyo bato bakoki kofanda esika moko te kozanga kobunda. Nzokande, na mayangani ya Batatoli ya Yehova oyo esalemaka kuna, bato ya bikólo ndenge na ndenge balyaka esika moko, balalaka esika moko, mpe basambelaka esika moko na bomoko mpe bazali baninga ya solosolo. Bakonzi ya Leta bakamwaka mingi ntango bamonaka likambo yango. Ndakisa oyo ezali komonisa mpenza bomoko na bango oyo euti na mateya ya boklisto ya solo elobelamaki na zulunalo Amsterdam News ya New York oyo ebimaki mokolo ya 2 Augusto 1958. Mopanzi-nsango yango alobelaki liyangani ya mikili mingi oyo tolobelaki liboso, oyo ezalaki na bato koleka nkoto 250 na engumba New York.
“Epai na epai okoki komona Mindɛlɛ na Baindo oyo bautaki bipai nyonso na mokili mobimba, bafandi esika moko na esengo mpe na kimya . . . Batatoli bautaki na mikili 120 bafandaki esika moko mpe basambelaki esika moko na kimya, bamonisaki bato ya États-Unis ete ezali mpasi te ete likambo ya ndenge wana esalema. . . . Liyangani yango ezali ndakisa monene oyo ezali komonisa ndenge bato bakoki kosala esika moko mpe kofanda esika moko.”
Bato mingi bazali koloba ete mitinda ya boklisto ekoki kosalisa bato te lelo oyo. Bongo, eloko mosusu nini esili kosalisa bato to ekosalisa bango? Mitinda ya boklisto ekoki kopesa matomba soki na esika ofandi bato bazali kosalela yango, mpe yango ekopesa nzela ete ‘mabota, bikólo, mpe bato nyonso’ bázala na bomoko ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba.—Emoniseli 7:9, 10.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Bato ya mposo nyonso mpe bikólo nyonso bazali kosala esika moko
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 24]
Boklisto ezali kobongola bizaleli ya bato. Eloko mosusu nini esili kosalisa bato?