Liteya 11
Bimá na lingomba ya lokuta!
Satana na bademo na ye balingi te ete osalela Nzambe. Balingaka kopɛngwisa moto nyonso na nzela ya Nzambe. Ndenge nini basalaka yango? Basalaka yango na nzela ya mangomba ya lokuta. (2 Bakolinti 11:13-15) mangomba ya lokuta ezali mangomba oyo eteyaka te makambo ya solo oyo ezali na Biblia. Mangomba ya lokuta ezali lokola mbongo ya monyato—ekoki komonana lokola mbongo ya malamu, kasi ezali na valɛrɛ te. Ekoki koyokisa yo mpasi mpenza.
Yehova, Nzambe ya solo, asepelaka ata moke te na mangomba ya lokuta. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato ya lingomba moko balingaki koboma ye. Bakanisaki ete ndenge basambelaka ezalaka malamu. Balobaki ete: “Tozali bobele na tata moko, ye Nzambe.” Yesu andimaki maloba na bango? Te! Alobaki na bango ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana.” (Yoane 8:41, 44) Lelo oyo, bato mingi bakanisaka ete basambelaka Nzambe, nzokande basambelaka nde Satana na bademo na ye!—1 Bakolinti 10:20.
Ndenge moko lokola nzete ya mabe ebotaka mbuma ya mabe, mangomba ya lokuta ezalaka na bato oyo basalaka makambo ya mabe. Mokili etondi na mobulu mpo na makambo mabe oyo bato bazali kosala. Makambo ya bosɔtɔ, bitumba, moyibi, konyokola bato, kobomana, mpe kolala na basi na makasi. Bato mingi oyo basalaka makambo ya mabe wana bazali na lingomba, kasi lingomba na bango etindaka bango básala makambo ya malamu te. Soki batiki kosala makambo ya mabe te, bakozala baninga ya Nzambe te.—Matai 7:17, 18.
Mangomba ya lokuta eteyaka bato básambela bikeko. Nzambe alobi tósambela bikeko te. Likanisi ya Nzambe ebongi mpenza. Okosepela ete moto moko oyo asololá na yo ata mokolo moko te asololaka na fɔtɔ na yo? Moto yango akoki kozala mpenza moninga na yo? Ata moke te. Yehova alingaka ete bato básololaka na ye, kasi na ekeko te, to na elilingi te, oyo ezali na bomoi te.—Exode 20:4, 5.
Mangomba ya lokuta eteyaka ete na ntango ya etumba koboma bato mosusu ezali mabe te. Yesu alobaki ete baninga ya Nzambe basengeli kolingana. Tokoki te koboma bato oyo tolingaka. (Yoane 13:35) Tosengeli te koboma bato ya mabe. Ntango banguna ya Yesu bayaki kokanga ye, apesaki bayekoli na ye nzela te ete bábunda mpo banguna yango bákanga ye te.—Matai 26:51, 52.
Mangomba ya lokuta eteyaka ete bato mabe bakonyokwama na lifelo ya mɔ́tɔ. Kasi, Biblia eteyaka ete bato ya masumu bakokufa. Yehova azali Nzambe ya bolingo. Nzambe ya bolingo akoki konyokola bato libela na libela? Soko moke te! Na Paladiso, lingomba ekozala kaka moko, lingomba oyo Yehova andimi. (Emoniseli 15:4) Mangomba nyonso oyo eteyaka makambo ya lokuta oyo euti na Satana ekolimwa.