Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gf liteya 5 nk. 8-9
  • Baninga ya Nzambe bakofanda na Paladiso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baninga ya Nzambe bakofanda na Paladiso
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Bomoi ya malamu elakelami biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Paradiso
    Lamuká!—2013
  • “Tokomonana na Paradiso!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Mabelé mabongwani Paradis
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
Makambo mosusu
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
gf liteya 5 nk. 8-9

Liteya 5

Baninga ya Nzambe bakofanda na Paladiso

Na Paladiso, makambo ekozala lokola oyo ezali na mokili lelo te. Nzambe akanaki te ete mabele etonda na mobulu, na makambo ya mawa, na bampasi mpe na makambo oyo ezali konyokola bato. Na mikolo ezali koya, Nzambe akokómisa mabele oyo paladiso. Paladiso ekozala ndenge nini? Tótalela makambo Biblia elobi:

Bato malamu. Paladiso ekozala mboka ya baninga ya Nzambe. Bato bakosala makambo ya malamu mpo na bato mosusu. Bakotosa banzela ya sembo ya Nzambe na bomoi na bango.​—Masese 2:21.

Biloko ya kolya ekozala mingi. Na Paladiso, nzala ekozala te. Biblia elobi ete: “Masangu [to biloko ya kolya] ikotondana na mokili.”​—Nzembo 72:16.

Bato bakozala na bandako kitoko mpe bakosala mosala oyo bakosepela na yango. Na Paladiso awa na mabele, libota na libota bakozala na ndako na bango. Moto nyonso akosala mosala oyo ekopesa ye bolamu.​—Yisaya 65:21-23.

Kimya ekozala na mokili mobimba. Bato bakobunda lisusu bitumba te mpe bakokufa na bitumba te. Liloba ya Nzambe elobi ete: “[Nzambe] akosukisa bitumba.”​—Nzembo 46:8, 9.

Nzoto malamu. Biblia elaki ete: “Mofandi moko [ya paladiso] akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Lisusu, moto moko te akozala makolo ekufá to miso ekufá to baba.​—Yisaya 35:5, 6.

Mpasi, mawa mpe liwa, ekozala lisusu te. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:4.

Bato mabe bakozala lisusu te. Yehova alaki ete: “Bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakobikolama wana.”​—Masese 2:22.

Bato bakolingana mpe bakopesana limemya. Kozanga bosembo, minyokoli, lokoso, mpe koyinana, ekozala lisusu te. Bato bakozala na bomoko mpe bakofanda na boyokani na banzela ya sembo ya Nzambe.​—Yisaya 26:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto