Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • gf liteya 3 lok. 5
  • Osengeli koyekola makambo ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osengeli koyekola makambo ya Nzambe
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Masolo mosusu
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Nzambe azali kobyanga yo okóma moninga na ye
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Ndenge nini koyeba lingomba ya solo
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Ndenge oyo okoki kozwa baninga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
gf liteya 3 lok. 5

Liteya 3

Osengeli koyekola makambo ya Nzambe

Mpo na kozala moninga ya Nzambe, osengeli koyekola makambo na ye. Baninga na yo bayebi nkombo na yo mpe babengaka yo na nkombo yango? Ɛɛ, babengaka ngai na nkombo na ngai. Nzambe mpe alingi oyeba nkombo na ye mpe obenga ye na nkombo yango. Nkombo ya Nzambe ezali Yehova. (Nzembo 83:18, NW; Matai 6:9, NW) Osengeli mpe koyeba makambo oyo alingaka mpe oyo alingaka te. Osengeli koyeba banani bazali baninga na ye mpe banani bazali banguna na ye. Ɛsɛngaka ntango mpo na koyeba moto. Biblia elobi ete ezali malamu kosomba ntango mpo na koyekola makambo ya Yehova.​—Baefese 5:15, 16.

Baninga ya Nzambe basalaka makambo oyo esepelisaka ye. Kanisá naino baninga na yo mwa moke. Soki osalelaka bango makambo ya mabe mpe osalaka makambo oyo bango bayinaka, bakozala ntango nyonso baninga na yo? Ata moke te! Ndenge moko mpe, soki olingi kozala moninga ya Nzambe, osengeli kosala makambo oyo esepelisaka ye.​—Yoane 4:24.

Mangomba nyonso te ememaka moto akóma moninga ya Nzambe. Yesu, moninga ya Nzambe ya motema, alobaki ete nzela ezali mibale. Nzela moko ezali monene mpe ezali na bato mingi. Nzela yango ezali komema na kobomama. Nzela mosusu ezali moke mpe bato oyo bazali kotambola na nzela yango bazali mingi te. Nzela yango ezali komema na bomoi ya seko. Yango elingi koloba ete soki olingi kozala moninga ya Nzambe, osengeli koyeba ndenge ya malamu ya kosambela ye.​—Matai 7:13, 14.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto