Liteya 1
Nzambe azali kobyanga yo okóma moninga na ye
Nzambe alingi ozala moninga na ye. Osilá kokanisa kozala moninga ya Moto oyo aleki bato nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba? Abalayama, ye azalaki na bomoi esili koleka bambula ebele, babengaki ye moninga ya Nzambe. (Yakobo 2:23) Biblia elobeli mpe bato mosusu oyo bazalaki mpe baninga ya Nzambe mpe Nzambe apambolaki bango mingi. Lelo oyo, bato mingi na bisika nyonso na mokili bakómi baninga ya Nzambe. Yo mpe okoki kozala moninga ya Nzambe.
Kozala moninga ya Nzambe ezali malamu koleka kozala moninga ya moto, ata soki moto yango azali nani. Nzambe ayokisaka baninga na ye ya sembo mawa te. (Nzembo 18:25) Kozala moninga ya Nzambe ezali malamu koleka kozala na mbongo mingi. Ntango moto ya mbongo akufi, mbongo na ye ekei epai ya bato mosusu. Kasi, bato oyo bazali baninga ya Nzambe bazali na eloko ya motuya oyo moto moko te akoki kobɔtɔla yango.—Matai 6:19.
Bato mosusu bakoki komeka kopekisa yo koyekola makambo ya Nzambe. Ata baninga na yo mpe bandeko na yo bakoki kopekisa yo. (Matai 10:36, 37) Soki bato mosusu bazali kosɛka yo to kosilikela yo, omituna boye: ‘Nakolinga kosepelisa nani—bato to Nzambe?’ Kanisá naino likambo oyo: Soki moto moko apekisi yo ete olyaka te, okotosa ye? Ata moke te, boye te? Osengeli kolyaka mpo na kozala na bomoi. Kasi Nzambe akoki kopesa yo likoki ya kozala na bomoi libela na libela! Yango wana, kotika te moto moko apekisa yo koyekola ndenge nini okoki kozala moninga ya Nzambe.—Yoane 17:3.