Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wi lok. 2
  • Maloba ya ebandeli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maloba ya ebandeli
  • Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?
wi lok. 2

Maloba ya ebandeli

Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?​—Na mikolo na biso tosili komona bitumba minene oyo bizali ntango nyonso kopesa mpasi epai na bato. Bamilió na mibali bakufeli basi, basi bakufeli mibali, bitike bazali na mawa mingi mpo na kufa ya baboti na bango oyo balingaki mingi. Na likita linene oyo lisalemaki na 1991 na Madrid mpo na kimya na Proche-Orient, M. Yitzhak Shamir alobaki ete: “Nandimisami ete mama Moarabe moko te akolinga ete mwana na ye ya mobali akufa na etumba​—motindo moko mama Moyuda moko te akolinga ete mwana na ye ya mobali akufa na etumba.” Na yango, motó na lisoló oyo ebongi mpenza: Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?

Lisusu, osilá naino te komituna ete: Likoki lizali na kondima ete Nzambe azali? Soki ezali bongo, mpo na nini apesi nzela na ebele ya bampasi? Mokano na Nzambe mpo na biso ezali nini mpe lolenge nini tokoki koyeba yango? Bilembeteli nini bimonisi ete Biblia epemamaki? Nini ezali mpenza ezalela ya bakufi mpe elikya nini ezali mpo na bango soki mpenza elikya ezali? Mituna oyo mpe mituna misusu mikozwa biyano kati na mwa búku oyo.

[Bililingi na lokasa 2]

Ngomba Helemona

Pene na Libeke na Galilai

Ebale ya Yaladene

Mabelé mbele makokaki kozala paladiso. Moto nde akómisaki yango esika ya bitumba

Ezipeli: Ekeko ya kimya kuna na Mabota masangani. Na nsima, “Efelo ya Yisaya”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto