Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs nk. 174-177
  • Elendiseli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elendiseli
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Bokonzi
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Bomoi na paladiso ya sika
    Lamuká!—2009
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bazali konyokwama, kasi bazali na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs nk. 174-177

Elendiseli

Ndimbola: Liloba to eloko oyo epesaka mpiko to elikya. Moto nyonso azalaka na mposa ya elendiseli. Tokoki kolendisa moto soki tosalisi ye na likambo moko boye to toyebisi ye ete tosepelaka na ye. Mbala mingi esɛngaka kosalisa moto ayeba ndenge ya kolonga mokakatano moko boye to koyebisa ye ntina oyo asengeli kozala na elikya ete makambo ekobonga. Biblia ezali na makambo ya malamu mpenza oyo tokoki kosalela mpo na kolendisa, mpe bavɛrsɛ oyo ezali na lisolo oyo ekoki kosalisa mpo na kolendisa moto oyo azali kokutana na mikakatano ndenge na ndenge. Ntango mosusu, komonisela moto kaka boboto mpamba ekoki kolendisa ye mpe kosalisa ye.​—Rom. 12:15.

Mpo na baoyo bazali konyokwama na MALADI​—

Em. 21:4, 5: “‘[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.’ Mpe Oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete: ‘Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.’ Alobaki lisusu ete: ‘Komá, mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.’”

Mat. 9:35: “Yesu azalaki kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka, azalaki koteya . . . , kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso na nzoto.” (Lokola Yesu azalaki kobikisa bamaladi ntango azalaki kosakola Bokonzi, yango emonisaki bolamu oyo akosalela bato na Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto.)

2 Ko. 4:13, 16: “Biso mpe tozali na kondima . . . Yango wana tozali kotika te, kasi ata soki lolenge ya moto oyo tozali na libándá [nzoto na biso] ezali kobeba, ya solo mpenza, lolenge ya moto oyo tozali na kati ezali kokóma ya sika [to kozwa makasi ya sika] mokolo na mokolo.” (Ekoki kozala ete nzoto na biso ezali kobeba. Kasi na elimo tozali kokóma bato ya sika, mpo tozali kokoba kotya elikya na bilaka malamu oyo Nzambe apesi.)

Talá mpe Luka 7:20-23.

Mpo na baoyo LIWA ekabolá bango na bandeko mpe baninga​—

Yis. 25:8, 9: “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso. . . . Mpe na mokolo yango, bakoloba mpenza boye: ‘Talá! Oyo nde Nzambe na biso. Totyeli ye elikya, mpe akobikisa biso. Oyo nde Yehova. Totyeli ye elikya. Tózala na esengo mpe tósepela na lobiko oyo euti na ye.’”

Yoa. 5:28, 29: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.”

Yoa. 11:25, 26: “Yesu alobaki na ye ete: ‘Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi; mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe azali kondimela ngai, akokufa mokolo moko te. Ondimi yango?’”

Nz. 146:5, 9: “Esengo na ye oyo . . . elikya na ye ezali epai ya Yehova Nzambe na ye . . . Asalisaka mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá.” (Ata lelo oyo, Nzambe atyaka likebi na baoyo liwa ekabolá bango na bandeko mpe baninga.)

Talá mpe Luka 7:11-16; 8:49-56.

Mpo na baoyo bazali kokutana na MINYOKO mpo basalaka mokano ya Nzambe​—

Nz. 27:10: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.”

1 Pe. 4:16: “Soki azali konyokwama mpo azali mokristo, ayoka nsɔni te, kasi akoba nde kopesa Nzambe nkembo na ndenge azali na nkombo yango.”

Mas. 27:11: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.” (Soki totikali sembo, tokopesa eyano na lokuta ya Satana oyo alobaki ete moto moko te akokoba kosalela Nzambe soki akutani na minyoko makasi.)

Mat. 5:10-12: “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.”

Mis. 5:41, 42: “Na yango, [bantoma] balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye. Mpe mikolo nyonso na tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo, Yesu.”

Flp. 1:27-29: ‘Kaka nde bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu ya Kristo . . . mpe bótika banguna na bino bábangisa bino na likambo ata moko te. Likambo wana mpenza ezali komonisa polele libebi na bango, kasi lobiko na bino; mpe yango ezali elembo oyo euti na Nzambe, mpo bozwi libaku malamu, kaka ya kondimela Kristo te, kasi mpe ya konyokwama mpo na ye.’

Mpo na baoyo balɛmbi nzoto mpo na MAKAMBO OYO EZALI SEMBO TE​—

Nz. 37:10, 11: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”

Yis. 9:6, 7: “Baboteli biso mwana, bapesi biso mwana mobali; mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye. Mpe bakopesa ye nkombo Mopesi-Toli Monene, Nzambe ya Nguya, Tata ya Seko, Nkumu ya Kimya. Bonene ya boyangeli na ye mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te. Ekopikama makasi mpe ekosimbama na bosembo mpe na boyengebene, banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.”

Dan. 2:44: “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”

Talá mpe Yisaya 32:1, 2; 2 Petro 3:13.

Mpo na baoyo bazali komona mpasi mpo na MAKAMBO YA NKITA​—

Yis. 65:21, 22: “Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. . . . Mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”

Nz. 72:8, 16: “[Masiya Mokonzi] akozala na bato oyo ye akoyangela banda na mbu kino na mbu mpe banda na Ebale kino na nsuka ya mabele. Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”

Mat. 6:33: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso [biloko ya kobikela] wana mosusu.”

Rom. 8:35, 38, 39: “Nani akokabola biso na bolingo ya Kristo? Bolɔzi, to mpasi, to monyoko, to nzala, to bolumbu, to likama, to mopanga? Mpo nandimi mpenza ete ezala liwa, to bomoi, to baanzelu, to baguvɛrnema, to makambo ya sikoyo, to makambo oyo ekoya, to banguya, to bosanda, to bozindo, to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na Kristo Yesu Nkolo na biso.”

Talá mpe Baebre 13:5, 6.

Mpo na baoyo balɛmbi nzoto mpo na MABUNGA na bango moko​—

Nz. 34:18: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”

Nz. 103:13, 14: “Se ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa, Yehova ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa. Mpo ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.”

Neh. 9:17: “Yo ozali Nzambe ya bolimbisi, ya ngɔlu mpe ya motema mawa, oyokaka nkanda noki te mpe otondi na motema boboto.”

2 Pe. 3:9, 15: “Yehova azali koumisa makambo te na elaka na ye, ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema. Lisusu, bótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto