Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs nk. 231-234
  • Kosambela bankɔkɔ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosambela bankɔkɔ
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Bankɔkɔ na biso bazali wapi?
    Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?
  • Misala ya bilimo mabe
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Ezalela ya bakufi ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bakufi bakoki kosalisa bato ya bomoi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs nk. 231-234

Kosambela bankɔkɔ

Ndimbola: Momeseno ya kokumisa mpe kosambela bankɔkɔ oyo bakufá (na milulu to na nzela mosusu) na likanisi ete bazali na mokili ya bilimo mpe bayebi makambo mpe bakoki kosalisa bato oyo bazali na bomoi to kosala bango mabe, yango wana esengeli kokitisa bango motema. Biblia eteyaka bongo te.

Bankɔkɔ oyo bakufá bayebaka makambo oyo bato ya bomoi basalaka mpe bakoki kosalisa bato ya bomoi?

Mos. 9:5: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”

Yobo 14:10, 21: “Moto ya mabele akati motema, mpe wapi ye? Bapesi bana na ye lokumu, kasi ayebi yango te.”

Nz. 49:10, 17-19: “Amonaka ete ata bato ya bwanya bakufaka, zoba ná moto oyo azangi mayele bango nyonso bakufaka, mpe basengeli kotikela bato mosusu biloko na bango ya kobikela. . . . Na liwa na ye, akomema eloko ata moko te; nkembo na ye ekokita elongo na ye te. . . . Nsukansuka, molimo na ye ekokende kosuka kaka na libota ya bankɔkɔ na ye. Bakomona pole lisusu ata moke te.”

Ezali solo ete bato oyo bakufá balyaka te bilei oyo batyelaka bango na etumbelo to na nkunda, boye te? Yango emonisi ete bilei yango ekoki kosalisa bango te, boye te?

Talá mpe motó ya likambo “Misala ya bilimo mabe.”

Tosengeli nde kobanga ete bankɔkɔ na biso oyo bakufá bakosala biso mabe?

Mos. 9:5, 6: “Bakufi, . . . bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango esili, mpe bazali na likabo ata moko lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te na eloko nyonso oyo ekosalema na nse ya moi.”

Moto azali na eloko moko oyo emonanaka te, oyo etikalaka na bomoi soki akufi?

Ezk. 18:4: “Talá! Milimo nyonso—ezali ya ngai. Molimo ya tata ndenge moko mpe molimo ya mwana—ezali ya ngai. Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.” (Talá mpe vɛrsɛ 20.)

Nz. 146:3, 4: “Bótyela bankumu motema te, to mwana ya moto ya mabele te . . . Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.”

Bato ya siansi mpe minganga oyo basalaka lipaso bazali ata na elembeteli moko te oyo emonisi ete moto azalaka na eteni mosusu oyo ekufaka te mpe ekobaka kokanisa nsima ya liwa na ye.

Talá mpe nkasa 315, 316, na motó ya likambo “Liwa.”

Okosepela ete bana na yo mpe bankɔkɔ na yo bámemya yo mpe bálinga yo ntango ozali naino na bomoi to básala milulu na lilita na yo nsima ya liwa na yo?

Ef. 6:2, 3: “‘Kumisá tata na yo mpe mama na yo’; oyo ezali mobeko ya liboso elongo na elaka: ‘Mpo makambo na yo etambola malamu mpe oumela ntango molai na mabele.’” (Bana oyo balandaka mitinda ya Biblia bakumisaka baboti na bango mpe basepelisaka bango ntango bazali naino na bomoi.)

Mas. 23:22: “Yoká tata na yo oyo abotaki yo, mpe kotyola mama na yo te kaka mpo akómi mobange.”

1 Tim. 5:4: “Soki mwasi moko oyo mobali akufá azali na bana to bana ya bana, bango báyekola kosalela ezaleli ya kokangama na Nzambe libosoliboso na ndako na bango moko mpe bákoba kozongisela baboti na bango ná bankɔkɔ na bango bolamu oyo basengeli kozongisela bango, mpo yango endimami na miso ya Nzambe.”

Ntango bato oyo basololaka na bilimo balobaka ete bayebisaka bato nsango oyo euti epai ya bakufi, nsango yango eutaka mpenza wapi?

Yis. 8:19: “Soki balobi na bino: ‘Bótuna bato oyo basololaka na bilimo to baoyo bazali na elimo ya koyebisa makambo oyo ekoya, baoyo bazali koloba swiswiswi mpe na mingongo ya nse,’ bato na bato basengeli nde kotuna Nzambe na bango te? Basengeli nde kotunela bato ya bomoi makambo epai na bakufi?” (Nzambe alingaki nde kokebisa biso na likambo yango soki ekoki mpenza kopesa biso nzela ya kosololaka na bandeko na biso oyo bakufá?)

Mis. 16:16: “Esalemaki ete ntango tozalaki kokende na esika ya mabondeli, mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko, demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná, akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.”

Talá mpe nkasa 377-379, na motó ya likambo “Misala ya bilimo mabe.”

Nani mpenza tosengeli kosambela?

Luka 4:8: “Yesu azongiselaki ye ete: ‘Ekomamá ete: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”’”

Yoa. 4:23, 24: “Ngonga ezali koya, mpe ezali sikoyo, wana basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye. Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela na elimo mpe na solo.”

Tokoki nde kozala na elikya ete mokolo mosusu tokozala esika moko na bandeko nyonso ya libota na biso, ná baoyo bakufá?

Yoa. 5:28, 29: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto