Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 92
  • Yesu asekwisi bakufi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu asekwisi bakufi
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Tokoki kolamuka na liwa!
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Elenge mwasi moko azongi lisusu na bomoi!
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Kolela ebongwani esengo
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Asimbaki elamba na ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 92

Lisolo 92

Yesu asekwisi bakufi

MWANA mwasi oyo bozali komona awa azali na mbula zomi na mibale. Yesu asimbi ye na lobɔkɔ, mpe baboti na ye batɛlɛmi pene na Yesu. Boyebi mpo na nini bazali na esengo boye? Tiká tótala likambo oyo esalami.

Tata ya mwana mwasi yango azali moto monene, nkombo na ye Yairuse. Mokolo moko boye, mwana na ye abɛli, balalisi ye na mbeto. Kasi mwana ayoki malamu te; maladi ekómi makasi. Yairuse ná mwasi na ye bazali komitungisa, noki mwana na bango akufa. Bazali kaka na mwana moko wana. Yairuse ayoki nsango ya makamwisi oyo Yesu azali kosala; yango wana akei koluka ye.

Ntango Yairuse amoni Yesu, ebele ya bato bazali zingazinga na ye. Kasi Yairuse aleki na katikati ya bato wana, akei kokwea na makolo ya Yesu. Alobi ete: ‘Mwana na ngai azali kobɛla makasi mpenza. Nabondeli yo, yaká kobikisa ye.’ Yesu andimi.

Wana bazali kokende, ebele ya bato balandi Yesu mpe bazingi ye epai na epai. Na mbala moko Yesu atɛlɛmi mpe atuni ete: ‘Nani asimbi ngai?’ Yesu atuni mpo ayoki nguya moko ebimi ye, yango wana ayebi ete moto moko asimbi ye. Kasi nani asimbi ye? Ezali mwasi moko oyo azalaki kobɛla, maladi na ye eumelaki mbula zomi na mibale. Ayei kosimba bilamba ya Yesu mpe abiki na mbala moko.

Ntango Yairuse amoni likamwisi yango ayoki esengo, mpo amoni ete ezali mpasi te ete Yesu abikisa moto. Kasi moto moko ayei koyebisa Yairuse ete: ‘Kotungisa Yesu lisusu te. Mwana na yo akufi.’ Ntango Yesu ayoki maloba yango alobi na Yairuse ete: ‘Komitungisa te, akobika.’

Ntango bakómi na ndako ya Yairuse, bakuti bato bazali kolela na mawa makasi. Kasi Yesu alobi na bango ete: ‘Bólela te. Mwana akufi te. Alali nde mpɔngi.’ Kasi bato yango babandi kosɛka mpe kotyola ye mpo bayebi ete mwana yango akufi.

Na nsima, Yesu akɔtisi baboti ya mwana yango ná bantoma na ye misato na ndako esika balalisi mwana yango. Asimbi mwana yango na lobɔkɔ mpe alobi na ye ete: ‘Tɛlɛmá!’ Kaka na ntango yango, mwana azongi na bomoi ndenge bozali komona awa. Atɛlɛmi mpe abandi kotambola. Yango wana baboti na ye bazali na esengo mpenza.

Wana ezali moto ya liboso te oyo Yesu asekwisi. Biblia emonisi ete moto ya liboso oyo Yesu asekwisaki ezali mwana mobali ya mwasi moko ya engumba Naine oyo mobali na ye akufá. Na nsima, Yesu asekwisaki mpe Lazare, ndeko ya Marta ná Maria. Ntango Yesu akozala mokonzi, akosekwisa ebele ya bato oyo bakufá. Nsango yango ezali kosepelisa mpenza!

Luka 8:40-56; 7:11-17; Yoane 11:17-44.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto