Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 70
  • Yona ná mbisi ya monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yona ná mbisi ya monene
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yehova amoniselaki Yona motema molai
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mabunga na ye eteyaki ye
    Mekolá kondima na bango
  • Mabunga na ye eteyaki ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yona azwi liteya na motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 70

Lisolo 70

Yona ná mbisi ya monene

BOMONI moto wana, oyo azali kozinda na mai? Azali na likama mpenza. Mbisi ya monene wana ekomɛla ye. Boyebi nkombo ya moto yango? Nkombo na ye Yona. Ebandi boni likambo ya boye ekómela ye?

Yona azali mosakoli ya Yehova. Mwa moke ya nsima ya liwa ya mosakoli Elisha, Yehova ayebisi Yona boye: ‘Kende na Ninive engumba monene. Mabe na bango eleki mingi. Nalingi okende koyebisa bango likambo yango.’

Kasi Yona alingi kokende kuna te. Yango wana, na esika akende na Ninive, akɔti nde na masuwa oyo ezali kokende epai mosusu. Yehova asepeli te ndenge Yona akimi. Yango wana, atindi mopɛpɛ ya makasi. Mopɛpɛ yango eleki makasi, mpe masuwa elingi kozinda. Bongo, bato oyo basalaka na masuwa babandi kobanga makasi mpe babandi kobondela banzambe na bango mpo básalisa bango.

Nsukansuka, Yona ayebisi bango ete: ‘Ngai nasambelaka Yehova, Nzambe oyo asalá likoló ná mabele. Nazali kokima mpo naboyi kosala mosala oyo Yehova atindi ngai.’ Bongo, bato yango batuni ye ete: ‘Tósala yo nini mpo mopɛpɛ esila?’

Yona alobi ete: ‘Bóbwaka ngai na mbu mpe mbu ekofanda lisusu nyɛɛ.’ Liboso bato yango baboyi naino. Kasi lokola mopɛpɛ engali lisusu koleka, nsukansuka babwaki Yona na mbu. Bongo mopɛpɛ esili na mbala moko mpe mbu efandi nyɛɛ.

Ntango Yona azali kozinda na kati ya mai, mbisi ya monene emɛli ye. Kasi akufi te. Aumeli na libumu ya mbisi yango mikolo misato butu moi. Yona azali koyoka mawa lokola atosaki Yehova te, ntango atindaki ye akende na Ninive. Bongo boyebi likambo asali?

Yona abandi kobondela Yehova asalisa ye. Yehova atindi mbisi yango esanza ye na mokili. Na nsima, Yona akei na Ninive. Lisolo oyo eteyi biso ete kosalaka makambo nyonso oyo Nzambe alobi na biso, ezali na ntina mingi.

Mokanda ya Yona 1-4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto