Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/14 nk. 12-13
  • Mobembo moko na Cambodge

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Cambodge
  • Lamuká!—2014
Lamuká!—2014
g 4/14 nk. 12-13
Elanga ya loso na Cambodge

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Cambodge

Karte ya Cambodge

BAMBOKA ezali likoló ya mai, bazando etondi na bato, babalabala etondi na batukutuku mpe ezali komema biloko ya lolenge nyonso; kobanda na bansoso ya bomoi tii na bafrigo. Wana ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo ezalaka na bamboka mosusu ya Cambodge.

Bato ya Cambodge bayebani lokola bato oyo bayambaka bato na esengo, balingaka baninga na bango mpe basalaka makambo na bomoko. Ata soki bakutani mbala ya liboso, basepelaka kobengana ndeko, tata-mwasi to mama-leki, noko to nkɔkɔ!

Bandako ya mabaya etongami likoló ya mai

Bato ya Cambodge bafandaka na mwa bamasuwa, bamosusu bafandaka na bandako ya mabaya to oyo etongami likoló ya mai. Biteyelo, balopitalo, bazando mpe bisika mosusu oyo batɛkaka petrole etongamá likoló ya mai

Mbuma ya Dragon to pitaya

Mbuma ya Dragon to pitaya ezali mingi na Cambodge

Bato ya Cambodge balyaka loso mingi. Mpo na kolya, balambaka biloko misato to minei, mbala mingi mwa supu ezangaka te. Balingaka mingi kolya mbisi. Ntango balyaka, mbala mingi mwa biloko ya sukali, ya ngayi mpe ya mungwa ezangaka te.

Eleki sikoyo mbula soki 2 000, bakomelesa ya Inde mpe bato mosusu ya mibembo oyo bakendeke na Chine, babandaki kokende mingi na libongo ya Cambodge mpe bazalaki kosanze soie mpe bibende na biloko lokola tomati, matungulu, pilipili, banzete ya nsolo kitoko, ivuare mpe wolo. Na nsima, bato ya Cambodge bazwaki mpenza makambo mingi ya Inde mpe Chine, mpe yango esalaki ete losambo ya Hindu mpe Budha ezwa mpenza misisa. Lelo oyo, bato mingi (90 %) ya Cambodge bazali bandimi ya Budha.

Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango ya Biblia oyo epesaka elikya na Cambodge. Basalisi ebele ya bato na lisalisi ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? Ebimisami na minɔkɔ soki 250, monɔkɔ ya Cambodgien mpe ezali na kati.

Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango ya Biblia oyo epesaka elikya epai ya mobali moko ya Cambodge

Batatoli ya Yehova bazali koyekola Biblia na bato koleka 1 500 na Cambodge mpe bato yango bazali kozwa biyano na mituna lokola, “Bakufi bazali wapi?” mpe “Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?”

NA MOKUSE

  • Motángo ya bato: Pene ya milio 14

  • Mboka-mokonzi: Phnom Penh

  • Klima: Molunge ebandaka moke mpe ekómaka makasi, ezalaka mpe na eleko ya malili mpe elanga

  • Biloko oyo ekólo yango etɛkaka na mikili mosusu: Bilamba, banzete, ndembo (caoutchouc), loso

Buku Biblia eteyaka mpenza nini? na Cambodgien

Buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova, ezali mpe na Cambodgien (etyami awa).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto