Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/14 nk. 14-15
  • Mobembo moko na Brésil

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Brésil
  • Lamuká!—2014
Lamuká!—2014
g 1/14 nk. 14-15
[Elilingi na lokasa 14]

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Brésil

[Karte na lokasa 14]
[Elilingi na lokasa 15]

Feijoada, bilei kitoko oyo baombo ya Afrika bamemá na Brésil

[Elilingi na lokasa 15]

Ndɛkɛ babengi toucan

BATO ya liboso oyo bafandaki na Brésil bazalaki babomi-nyama mpe basali bilanga. Ba-Portugais oyo bakendaki kuna mpo na kotala mokili yango bakɔtisaki Lingomba ya Katolike, mpe na nsima batongaki bandako-nzambe mingi; mosusu batyaki yango mayemi oyo basalaki na mabaya oyo ebongisamaki malamu mpe bapakolaki yango wolo.

Kobanda na katikati ya siɛklɛ ya 16 tii na katikati ya siɛklɛ ya 19, bamasuwa oyo ezalaki komema baombo ememaki bato ya Afrika milio soki 4 na Brésil, mpo básala bilanga. Baombo yango bamemaki milulu na bango na Brésil, mpe na nsima yango ebimisaki mwa lingomba lokola macumba mpe candomblé, oyo esangisaki losambo ya bato ya Brésil mpe ya Afrika. Mimeseno ya Afrika ekɔtá na miziki, mabina mpe bilei ya Ba-Brésilien.

Feijoada ezali bilei ya mboka oyo elandá elambeli ya Ba-portugais; basangisaka misuni ná madesu mpo na kolamba yango mpe balyaka yango na loso ná ndunda. Na siɛklɛ ya 19 mpe ya 20, bamilio ya bato oyo bautaki Mpoto (mingimingi Allemagne, Italie, Pologne mpe Espagne), Japon mpe mikili mosusu bayaki mpe na Brésil.

Lelo oyo, na Brésil mobimba, Batatoli ya Yehova bazali soki 750 000 na masangá koleka 11 000. Bayekolaka Biblia na bato koleka 800 000. Mpo bázwa bisika ya kosala makita, mbula na mbula baekipi ya botongi 31 esalaka mibembo mpo na kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi soki 250 to 300 elongo na bandeko mosusu ya ekólo yango. Kobanda na sanza ya 03/2000 basilaki kotonga mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi 3 647.

[Elilingi na lokasa 15]

Mabele oyo ezali pembenipembeni ya ebale Amazone ezali na zamba oyo eleki monene na mokili mobimba epai mbula ebɛtaka mingi

OYEBAKI YANGO?

Ebale Amazone ebwakaka mai mingi na mbu koleka ebale mosusu nyonso mpe ezali na molai ya kilomɛtrɛ koleka 6 275

NA MOKUSE

  • Motángo ya bato: Milio 201

  • Mboka-mokonzi: Brasilia

  • Minɔkɔ: Portugais mpe minɔkɔ ya mboka koleka 180

  • Nkombo: Nkombo Brésil eutá na nkombo ya nzete moko ya ekólo yango oyo babengi bois du brésil, oyo basepelaka na yango mpo ebimisaka langi ya motane oyo batyaka na bilamba

  • Klima: Molunge mpe mwa malili na nɔrdi, mwa molunge mpe mwa malili na sudi, mpe na bantango mosusu banɛjɛ ekitaka na bangomba na eleko ya malili

  • Mokili: Brésil ezwi pene na katikati ya mabele ya Amerika ya sudi. Ebale na yango ezali moko ya bibale minene na mokili

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto