Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 11/13 nk. 6-9
  • Biloko misato oyo mbongo ekoki kosomba te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biloko misato oyo mbongo ekoki kosomba te
  • Lamuká!—2013
  • Masolo mosusu
  • Kotalela mbongo na ndenge ebongi
    Lamuká!—2015
  • Ezali solo ete mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ndenge ya kosalela mbongo malamu
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Mbongo
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Lamuká!—2013
g 11/13 nk. 6-9

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Biloko misato oyo mbongo ekoki kosomba te

LIKAMBO ya kokamwa ezali ete ata soki balingi kolongola bango na mosala, balingi kobungisa ndako na bango to mbongo na bango ya pansiɔ, bato mingi bazalaka kaka na mposa ya kozala na eloko nyonso oyo mbongo ekoki kosomba.

Ezalaka mpasi te mpo bato ya ndenge wana bákwea na motambo ya bato oyo basalaka bapiblisite, oyo bamonisaka ete tosengeli kozala na ndako ya monene, motuka ya kitoko, mpe bilamba oyo ebimi mikolo oyo. Ozali na mbongo te? Likambo te​—okoki kodefa! Bato mingi bazalaka na mposa ya komonana malamu na miso ya bato ata soki bazali na banyongo mingi mpenza.

Nzokande, lelo to lobi, ekomonana polele ete bamilukelaki mindɔndɔ. Buku moko (The Narcissism Epidemic) elobi boye: “Kokɔta nyongo mpo na kosomba biloko ya mikolo oyo mpo bato bámona ete ozali na mbongo ekokani na moto oyo amɛlaka drɔgɛ babengi crack cocaïne mpo amiyoka malamu. Na ebandeli biloko yango mibale esɛngaka mbongo mingi te mpe esalisaka mpenza, kasi yango ezalaka kaka mpo na ntango mokuse. Nsima ya mikolo, esilisaka moto mbongo mpe akómaka konyokwama na makanisi.”

Biblia emonisi polele ete “kolakisa na lolendo biloko ya kobikela” ezali bozoba. (1 Yoane 2:16) Kutu, koluka kozala na eloko nyonso elongolaka likebi na biso na makambo oyo eleki ntina na bomoi​—biloko oyo mbongo ekoki kosomba te. Tótalela bandakisa misato.

1. BOMOKO YA LIBOTA

Brianne,a elenge mwasi moko na États-Unis, amonaka ete tata na ye azwaka mosala na ye mpe mbongo oyo azwaka na mosala yango na valɛrɛ mingi koleka. Alobi boye: “Tozali na biloko nyonso oyo tosengeli na yango mpe ezali ebele mpenza, kasi tata afandaka na ndako te mpo asalaka mibembo ntango nyonso. Nayebi ete ezali mpo na mosala, kasi libota ezali mpe na mposa na ye!”

Omituna boye: Likambo nini ya mawa ekokómela tata ya Brianne na bomoi na ye nsima ya bambula? Lokola azwaka biloko ya mokili na valɛrɛ mingi koleka, yango esali ete boyokani na ye ná mwana na ye ekóma ndenge nini? Makambo nini bato ya libota na ye balingaka asalela bango oyo eleki mbongo na valɛrɛ?

Batoli ya Biblia oyo osengeli kotalela:

  • “Bolingo ya mbongo ebimisaka mpasi ya ndenge nyonso. Bato mosusu balingaka mbongo mingi na boye ete . . . bamilukelá mpasi mingi.”​—1 Timote 6:10, Contemporary English Version.

  • “Eleki malamu kolya ndunda elongo na bato oyo olingaka na esika ya kolya misuni ya kitoko esika koyinana ezali.”​—Masese 15:17, Good News Translation.

Na mokuse: Mbongo ekoki te kosomba bomoko ya libota. Yango eyaka kaka soki bato ya libota bazali kolekisa ntango elongo mpe bazali mpenza kolingana mpe kotyelana likebi.​—Bakolose 3:18-21.

2. LIBATELI YA SOLOSOLO

Sarah, oyo azali na mbula 17 alobi boye: “Mama ayebisaka ngai ntango nyonso ete nasengeli kobala moto oyo azali na mbongo mingi mpe natánga kelasi mpo nazwa mosala oyo ekosunga ngai soki mobali atiki kopesa ngai mbongo. Makanisi na ye nyonso ezalaki kaka ndenge nini akokoba kozwaka mbongo.”

Omituna boye: Ntango nakanisaka avenire, namitungisaka mpo na makambo nini ya ntina mpenza? Ntango nini nalekisaka ndelo mpe nakómaka komitungisa mingi mpo na yango? Ndenge nini mama ya Sarah akokaki kozala na makanisi oyo ebongi na likambo etali mbongo?

Batoli ya Biblia oyo osengeli kotalela:

  • “Bótika komibombela biloko ya motuya na mabele, epai ndɔngɛ mpe koguga ebebisaka, mpe epai miyibi bakɔtaka na makasi mpe bayibaka.”​—Matai 6:19.

  • “Boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi.”​—Yakobo 4:14.

Na mokuse: Kobomba mbongo ekobatela bomoi na yo te na mikolo ezali koya. Kutu, mbongo ekoki koyibama; mpe ekoki te kobikisa maladi to kosala ete moto akufa te. (Mosakoli 7:12) Biblia eteyaka ete libateli ya solosolo eutaka na koyeba Nzambe mpe mokano na ye.​—Yoane 17:3.

3. KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO

Tanya, mwasi moko ya mbula 24, alobi boye: “Baboti na ngai basalisaki ngai nazala na bomoi ya mindɔndɔ te. Ngai ná lipasa na ngai tokolaki malamu, atako mbala mingi tozalaki kaka na mwa biloko ya kobikela.”

Omituna boye: Mpo na nini ekoki kozala mpasi moto asepela na mwa biloko ya kobikela oyo azali na yango? Ndakisa nini opesaka libota na yo na ndenge otalelaka mbongo?

Batoli ya Biblia oyo osengeli kotalela:

  • “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”​—1 Timote 6:8.

  • “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

Na mokuse: Ezali na biloko oyo eleki mbongo na valɛrɛ mpe oyo mbongo ekoki kosomba te. Kutu, ndenge Biblia elobi: “Ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Ya solo, mpo moto azala na esengo ya solosolo, esengeli azwa biyano na mituna oyo ya ntina:

  • Mpo na nini tozali awa na mabele?

  • Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?

  • Ndenge nini nakoki kokokisa mposa na ngai ya koyeba Nzambe?

Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo bakosepela kosalisa yo ozwa biyano na mituna yango.

a Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

Sekele mpo na kozala na esengo

Buku moko (The Narcissism Epidemic) elobi boye: “Mbala mingi bato oyo bazalaka na mposa ya kozala na biloko mingi bazalaka mpenza na esengo te mpe banyokwamaka mingi na makanisi. Ata mpe baoyo balukaka kozala na mbongo mingi babɛlaka motó mpe bamaladi mosusu lokola bampota na mongongo, mokɔngɔ mpasi, motó mpasi mpe bakómaka komɛla masanga mingi mpe kosalela drɔgɛ. Emonani ete bato oyo balukaka kokóma na mbongo mingi bakómaka nde bato ya mpasi.”

“Mikano ebongwani”

“Ntango batunaki bana kelasi na bambula ya 1960 mpe na ebandeli ya 1970 ntina ya kokɔta iniversite, mingi na bango balobaki ete ntina ya libosoliboso ezalaki mpo ‘bákóma bato oyo batángá mingi’ to ‘bákóma na lolenge moko boye ya kokanisa.’ Kaka moke nde balobaki ete ntina ya libosoliboso ezalaki mpo ‘bákóma na mbongo mingi.’ Kobanda na bambula ya 1990, bana kelasi mingi bakómá koloba ete ntina mpenza ya kokɔta iniversite ezali mpo ‘bákóma na mbongo mingi’ . . . Mikano na bango ebongwani kaka na ntango oyo motángo ya baoyo banyokwamaka na makanisi, bamibomaka mpe babɛlaka bamaladi mosusu ya motó ebakisami.”​—The Price of Privilege, ya Dr. Madeline Levine.

“Kosombasomba biloko mpo na komiyoka malamu”

Dr. Madeline Levine alobi ete “kosombasomba biloko” ekoki kokóma lokola nkisi oyo ekoki kosalisa bato bámiyoka malamu, mpe bázwa mwa libɔndisi na mokili oyo libota, bato ya mboka na bango mpe mangomba elɛmbisá bango nzoto. Akomaki boye na buku na ye (The Price of Privilege): “Kosomba biloko ezali ndenge moko ya koyeba makambo oyo ezali koleka na esika tofandi. Epesaka biso mokumba ya kosomba to kotɛka biloko mpe epesaka moto oyo azali kosomba mwa bokonzi. Bokonzi ya ndenge wana ezali kaka ndɔtɔ . . . Bakompanyi ya minene mpe bato oyo bafutamaka mpo na kosalela yango bapiblisite nde bazalaka na bokonzi, bamonisaka ete kosomba biloko epesaka moto mwa bokonzi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto