Makanisi ya baboti mosusu
Ntango bana na yo bazali kokola, ndenge nini okoki kosalisa bango báyeba ete kotosa ezali na ntina mingi? Ndenge nini okoki koteya bango makambo oyo ekosalisa bango tii ntango bakokola? Yoká makambo oyo baboti mosusu ya bamboka ndenge na ndenge balobi.
KOYEBA KOFANDA NA BATO MPE KOYEKOLA MISALA YA NDAKO
“Ntango tolyaka elongo mpe tobɛtaka masolo ya makambo oyo tokutanaki na yango na mokolo, mwana mokomoko ayekolaka ndenge ya koyoka. Ntango bamonaka biso tozali koyoka na likebi, yango esalisaka bango bázala na limemya moko mpo na mosusu mpe bámemya basusu.”—Richard, Grande-Bretagne.
“Toyokaka esengo ntango tomonaka bana na biso bazali komoniselana limemya mpe kosilisa mikakatano na bango, bango moko, kozanga ete biso tósalisa bango. Babangaka mpe te kosolola na mikóló.”—John, Afrique du Sud.
“Nazali moto ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu, kozanga ete nayeba yango, nasalaka makambo oyo eyokisaka bana na ngai motema mpasi. Soki esalemi bongo, ezalaka na ntina mingi ete nasɛnga bolimbisi mpo na libunga oyo nasali.”—Janelle, Australie.
“Toteyaka bana na biso báyeba kosala misala ya ndako. Koteya bango básala mpo na bolamu ya basusu esalisaka libota ezala na boyokani malamu mpe na kimya, mpe yango esalisaka bana bámona ete bazali kosala likambo moko ya ntina.”—Clive, Australie.
“Ezali pɛtɛɛ te, kasi ezali na ntina mingi koteya bango báyeba komitya na esika ya basusu, bámemya basusu mpe bálimbisanaka.”—Yuko, Japon.
BOPƐTO MPE BOKƆLƆNGƆNƆ YA NZOTO
“Ntango bana na biso bazalaki naino mike, toteyaki bango básukolaka bango moko. Mpo na kosala ete ntango ya kosukola esepelisa bango, tozalaki kosalela sabuni oyo ezalaki na mayemi ya mwa bikeko, mpe sabuni ya kosukola nsuki (shampoing) oyo molangi na yango ezalaki na mayemi ya bato oyo balakisaka na bafilme ya bana mike (dessins animés), mpe na linyuka (éponge) oyo basali yango lokola mwa nyama ya moke.”—Edgar, Mexique.
“Ntango tozalaki kofanda na esika oyo mai ya pɔmpi ezalaki te, nazalaki kotya saani to katini ya mai mpe sabuni na esika moko ya malamu mpo tósukolaka mabɔkɔ soki tozongi ndako.”—Endurance, Nigeria.
“Mokolo na mokolo topesaka bana na biso bilei oyo etongaka nzoto, mpe tolimbwelaka bango ete ezali na ntina mingi kolya bilei ndenge na ndenge mpo na kotonga nzoto. Bana balukaka koyeba bikelakela nini totyaka na bilubu ndenge na ndenge; yango wana nasɛngaka bango básalisa ngai ntango nazali kolamba. Ntango oyo tolekisaka elongo mpo na kolamba esalisaka biso tósololaka malamu.”—Sandra, Grande-Bretagne.
“Kosala ngalasisi ezali na ntina mingi. Biso mpe tosalaka yango mpo bana bálanda ndakisa na biso. Bana na biso basepelaka ntango tokimaka mwa mbangu, tobɛtaka mai, tobɛtaka bale ya tenisi to ya baskɛti to ntango topusaka velo libota mobimba elongo. Sikoyo, bayebi ete kosala ngalasisi ezali na ntina mingi, kasi ezali mpe lisano.”—Keren, Australie.
“Bana balingaka mingi kolekisa ntango elongo na baboti na bango. Eloko mosusu te ekoki kozwa esika na yango, ezala mbongo, bakado to mibembo. Nasalaka misala na ntɔngɔ ntango bana na ngai bazali na kelasi. Nsima ya midi, nakoki kolekisa ntango elongo na bango.”—Romina, Italie.
DISIPLINI
“Tomonaka ete ezali na lolenge moko te ya kopesa disiplini oyo eleki malamu; yango etalelaka mwana na mwana to likambo na likambo. Ntango mosusu kopesa disiplini esɛngaka kofandisa mwana mpo na kosolola na ye lisolo ya polele; ntango mosusu esɛngaka kopekisa ye asala makambo oyo asepelaka na yango.”—Ogbiti, Nigeria.
“Tosɛngaka bana na biso bázongela na maloba na bango moko mibeko oyo totyeli bango mpo tóndima ete bakangi ntina na yango. Na nsima, tosalaka oyo tolobaki ete tokosala. Soki tolingi ete bana na biso bátosa makambo oyo tozali koyebisa bango, tosengeli kokakatana te kopesa bango etumbu soki batosi mibeko te.”—Clive, Australie.
“Ntango nazali kosembola bana na ngai, namonaka malamu nagunzama mwa moke mpo nakóma molai moko na bango. Yango esalisaka ngai nabenda likebi na bango nyonso. Esalisaka mpe bango bámona ndenge elongi na ngai ezali, mpamba te yango ekoki koloba mingi koleka maloba na ngai.”—Jennifer, Australie.
“Tosalaka makasi tóloba na bana na biso te ete: ‘Yo oyokaka te,’ ata soki emonani ete mwana yango ayokaka te. Lisusu, topamelaka bana na biso te moko na miso ya mosusu. Tolobaka na bango nde na litoi to tokendaka na bango mwa pembeni mpo tósolola na bango na esika oyo bato mosusu bazali te.”—Rudi, Mozambique.
“Bana bazalaka bindimandima mpe bilandalanda, balingaka mpe komekola bato mosusu. Yango wana, tosengeli kosala nyonso mpo bana na biso bábebisama te na baninga ya kelasi, televizyo, radio, Internet to mikanda mosusu, mpe na bato mosusu. Tosengeli kosalisa bango bákóma na bizaleli malamu oyo euti na mitinda ya Biblia. Kozala na bizaleli malamu oyo euti na Biblia esalisaka bango báboya kosala makambo ya mbindo.”—Grégoire, République Démocratique du Congo.
“Disiplini esengeli kopesama na lisɛki te, na kolekisa ndelo te, mpe ndenge okanaki. Bana basengeli koyeba nini ekokómela bango soki basali likambo moko ya mabe, mpe ete soki baboyi kotosa, okopesa bango etumbu kaka ndenge olobaki.”—Owen, Angleterre.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]
“Bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”—Bakolose 3:21
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
NDAKISA YA LIBOTA MOKO
Nabɔkɔlaka bana ngai moko
Lisolo elongo na Lucinda Forster
Mokakatano nini eleki makasi mpo na yo lokola obɔkɔlaka bana yo moko?
Kobɔkɔla bana ezali mpasi, kasi lokola nabɔkɔlaka bana ngai moko, mingimingi namonaka ete kobongisa ntango na ngai mpe koyeba kosalela makasi na ngai ezali mokakatano oyo eleki makasi. Esɛngaka ntango mingi mpo na koteya bana mitinda ya Biblia mpe bizaleli malamu; esɛngaka mpe kosomba ntango mpo na kominanola mwa moke mpe kosɛka elongo na bango. Mbala mingi, malamu nazanga ntango ya kominanola mwa moke, kasi nazwa ntango ya kosala misala ya ndako.
Osalaka ndenge nini mpo osololaka malamu ná bana na yo?
Ntango bobomi libala, bana bakoki komiyoka lokola bazangi moto ya kobatela bango mpe koyoka nkanda. Namonaka ete soki matata ebimi, kotala mwana na miso mpe koloba na ye kozanga kogangela ye ezali na ntina mingi. Nazelaka tii ntango tokitisi mitema, na nsima namekaka koyebisa bango likambo oyo ezali kotungisa ngai kozanga ete nakómisa yango likambo monene. Natunaka makanisi na bango, nayokaka bango na likebi, mpe namonisaka ete nazali mpenza komitya na esika na bango. Natyaka likebi mpe nasalisaka bango na makambo na bango ya kelasi mpe napesaka bango longonya mpo na oyo bazali kosala. Mbala mingi, tolyaka esika moko na kimya, mpe ntango tozali kolya na mesa, tobɛtaka masolo mpe tosɛkaka. Nayebisaka mpe bango mbala na mbala ete nalingaka bango mingi.
Ndenge nini opesaka bango disiplini?
Esengeli kotyelaka bana mibeko, mpe soki otye mobeko, kobongola yango te. Nasalaka makasi nazala motema malamu, kasi soki nalobi te, te. Esengeli nasololaka na bana na ngai mpe nalimbwela bango ntina oyo ezaleli boye to boye ezali mabe. Liboso ya kopesa bana disiplini, natunaka bango mituna ebele mpo na koyeba makanisi na bango mpe ndenge oyo bazali komiyoka; yango esalisaka ngai nayeba nini etindi bango básala likambo yango. Soki namikosaki—na ndakisa soki nayebaki likambo moko malamu te—nasɛngaka bango bolimbisi.
Ndenge nini oteyaka bana na yo bázala na limemya mpo na basusu?
Nakundwelaka bango likambo oyo Yesu ateyaki: kosalela bato makambo oyo olingaka básalela yo. (Luka 6:31) Nalendisaka bana na ngai básalaka nyonso mpo na kosilisaka matata na bango, bango moko, mpe nateyaka bango ntina ya komonisa boboto soki moto alobi na bango to asali bango likambo moko oyo esepelisi bango te.
Osalaka nini mpo na kominanola mwa moke elongo na bango?
Lokola tozalaka na mbongo mingi te ya kofuta tike mpo na kokende konje mosika, totalaka na bazulunalo mpo na koyeba makambo nini tokoki kosala oyo ekosɛnga biso mbongo mingi te. Tokendaka kotambola mpo na kozwa mopɛpɛ mpe kolya esika moko boye, to mpo na kotala ndenge milona ezali kokola na bisika oyo balonaka yango. Na lopango na biso, tolonaka matiti ya nsolo kitoko oyo ebakisaka elɛngi na bilei, mpe tolingaka kobuka yango biso moko mpo tótya yango na biloko oyo tokolamba. Kominanola ezali na ntina, ata soki tolekisi kaka ntango na kotala mwa zamba moko ya pembeni.
Esengo nini mpe mapamboli nini ozwi?
Kobɔkɔla bana ngai moko ezali pɛtɛɛ te, ezala mpo na ngai to mpo na bango; kasi yango esalisi biso tókóma baninga ya motema, mpe yango esalisi biso tókóma na botɔndi mingi mpo na mapamboli oyo tozwi. Nazali na esengo mingi ntango nazali komona ndenge mwana mokomoko azali kokola. Na mbula oyo bazali na yango, balingaka kolekisa ntango mingi elongo na ngai, mpe nasepelaka mingi kozala elongo na bango. Bayebaka ntango nazali na esengo to na mawa, mpe ntango mosusu basimbaka ngai na lipeka mpo na kolendisa ngai. Ndenge oyo balingaka ngai epesaka ngai esengo mingi. Likambo oyo eleki ntina, tomonaki mpenza ete Mozalisi na biso alingaka biso mingi, na ndenge asalisi biso tólonga ebele ya mikakatano. Biblia epesi ngai makasi ya kokoba kosala milende mpo na kozala mama ya malamu.—Yisaya 41:13.
[Elilingi]
Lucinda ná bana na ye, Brie mpe Shae