Lokasa ya mibale
Kobɔkɔla bana mpo bákola malamu
Ezali na likambo moko oyo mbala mosusu baboti bakanisaka yango te ntango bazali kotala mwana na bango oyo auti kobotama. Kasi likambo yango ezali solo: Nsukansuka bebe wana akokóma mokóló mpe akokende kofanda epai na ye. Mokili esalemá bongo, mpamba te Biblia elobi ete “mobali akotika tata na ye ná mama na ye.” (Ebandeli 2:24) Na ntembe te, tokoki koloba mpe bongo mpo na mwana mwasi.
Atako bongo, mokolo wana ya esengo mpe ya mawa, ntango mwana mobali to mwana mwasi akoli mpe alongwe na ndako, baboti mingi bamitungisaka. Bamitunaka boye: ‘Nabɔkɔlaki mwana na ngai malamu? Akokoka kozwa mosala mpe kobatela yango, kosimba ndako, mpe koyeba kobatela mbongo?’ Mpe likambo oyo eleki ntina, ‘Mwana na ngai akokoba kotosa na bomoi na ye makambo oyo toteyaki ye?’—Masese 22:6; 2 Timote 3:15.
Nimero sipesiale oyo ya Lamuká! ekomonisa ndenge oyo toli ya Biblia ekoki kosalisa baboti ntango bana na bango bazali kokola.