Bombá yango mpo na koyekola
Katá, gumbá na ndambo mibale mpe bombá
LOKASA 3 RUTA
MITUNA
A. Silisá maloba oyo Ruta alobaki na Naomi: “Bato na yo bakozala . . .”
B. Na ndenge nini Ruta azali ndakisa malamu mpo na baoyo babatelaka bato ya maladi mpe mibange?
C. Tondisá bisika oyo ezali mpamba. Ruta abalaki ․․․․․ mpe akómaki nkɔkɔ ya ․․․․․ mpe ․․․․․.
[Etanda]
4026 L.T.B. Adama akelami
Azalaki na bomoi na mobu soki 1200 L.T.B.
Mobu 1 T.B.
Mobu 98 T.B. Mokanda ya nsuka ya Biblia ekomamaki
[Karte]
Alongwe na Moabe mpe akei na Beteleme
MOABE
Beteleme
RUTA
NA MOKUSE
Mwasi mokufeli mobali moko ya sembo ya Moaba, oyo asalisaki mama bokilo na ye Naomi, oyo akómaki mobange. Bolingo ya solosolo oyo Ruta azalaki na yango mpo na Naomi mpe ekateli oyo azalaki na yango mpo na kosambela Yehova, epesaki ye makasi ya kotika mboka na ye mpe kokende na Beteleme. Bato mosusu balobaki na Naomi ete: “Mwasi ya mwana na yo . . . azali mpenza malamu mpo na yo koleka bana mibali nsambo.”—Ruta 4:14, 15.
BIYANO
A. “. . . bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.”—Ruta 1:16.
B. Ruta amonisaki elimo ya komipimela mpe ya molende na mosala.—Ruta 2:7, 10-12, 17; 3:11.
C. Boaze, Mokonzi Davidi, Yesu Kristo.—Matai 1:5, 6, 16.