Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/11 lok. 32
  • Ayekolaki nzela moko na bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ayekolaki nzela moko na bango
  • Lamuká!—2011
Lamuká!—2011
g 1/11 lok. 32

Ayekolaki nzela moko na bango

● Mama moko ya mbula koleka 30, oyo afandaka na mobali na ye ná bana na bango misato na Kentucky, na États-Unis akomaki boye: “Ngai ná libota na ngai tosepelaka na mikanda nyonso ya Batatoli ya Yehova oyo tozali na yango.” Mwasi yango alobaki boye: “Bana na ngai basepelaka mingi na buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia,” mpe abakisaki ete, “kutu nayekolaki nzela moko na bango.”

Buku yango ezali na bililingi kitoko mpe elobeli masolo ya Biblia ndenge elandanaki. Na ndakisa: Eteni 2 ezali na masolo lokola “Bayisraele bakómi baombo,” “Babikisi Moize,” “Moize akimi,” “Bakei epai ya Farao,” “Malɔzi zomi,” mpe “Bakatisi Mbu Motane.”

Eteni 6 ya buku yango, oyo ezali na motó ya likambo “Banda Yesu Kristo abotami tii akufi,” ezali na masolo mingi oyo elobeli bomoi ya Yesu banda mbotama tii liwa na ye. Ezali mpe na masolo oyo ezali na mitó ya makambo ete “Yesu abotami na ndako ya bibwɛlɛ,” mpe “Bato balandi monzoto.” Lisolo yango emonisi ete “bato ya mayɛlɛ”​—oyo bazalaki nde banganga-minzoto—​bakendaki kotala Yesu “na ndako,” kasi te na elyelo ya bibwɛlɛ epai abotamaki. Na ndako yango, “bamonaki mwana yango ya moke ná Maria mama na ye.” Nzambe ayebisaki bato yango bázonga te epai ya Erode, mpo azalaki koluka koboma Yesu. Yango esengeli kotinda biso tóloba ete nani nde atindaki monzoto oyo etambwisaki bango?​—Matai 2:1, 11, 12, haut fleuve.

Yo mpe okoyekola nzela moko na bana na yo wana ozali kotángela bango buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Ezali na masolo 116 oyo ezali koteya biso na ntina na bato mpe makambo oyo Biblia elobeli. Okoki kozwa yango soki otondisi mwa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto