Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/10 lok. 3
  • “Nalembi!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nalembi!”
  • Lamuká!—2010
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi mpenza nini mpo na koboma libala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Esengeli koboma libala to te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Libala ekoki kolonga mikakatano?
    Lamuká!—2006
  • Bakangami na libala oyo ezangi bolingo
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 4/10 lok. 3

“Libala yango ekufa kaka!”

Ndako moko ya kala ezali komonana ete bazali kokipe yango lisusu te. Na boumeli ya bambula, mipɛpɛ makasi ebɛti yango, mpe etiki yango na bilembo. Sikoyo, ndako yango elɛmbi mpe ezali komonana ete ekokwea mosika te.

NDAKISA wana ezali komonisa ndenge mabala mingi ezali lelo. Esilá kokómela yo omona ete libala na yo ekoumela lisusu te? Soki ezali bongo, yebá ete na libala nyonso mikakatano ezangaka te. Kutu, Biblia emonisi mpenza ete baoyo bazali kobala bakozanga te kokutana na “makambo ya mpasi mpe mawa.”​—1 Bakorinti 7:28, The New English Bible.

Mpo na komonisa bosolo ya maloba yango, ekipi moko ya bato oyo bayekolaka makambo ya mabala, balobeli libala lokola “likambo oyo ezalaka na likama koleka, oyo ebele ya bato na ntango na biso bazali se komikɔtisa na yango.” Babakisi boye: “Likambo oyo ebandaka na esengo mingi mpe na kopesana bilaka, ekoki kokóma likambo ya kotungisa koleka mpe ya mpasi na bomoi mobimba ya moto.”

Ezali boni mpo na libala na yo? Ezali na likambo moko to makambo mingi na kati ya makambo oyo elandi?

  • Koswana ntango nyonso

  • Maloba ya kozokisa

  • Ekobo

  • Kobomba nkanda

Soki libala na yo emonani ete ezali lisusu makasi te mpe ezali komonana ete ekokufa mosika te, osengeli kosala nini? Osengeli nde koboma yango?

“EKÓMI KOMONANA MINGI”

Na mikili mosusu, motángo ya mabala oyo ezali kokufa ekómi mingi. Tózwa ndakisa ya États-Unis, epai bambula mingi liboso, koboma libala ezalaki likambo oyo ezalaki komonana mingi te. Kasi, ndenge Barbara Dafoe Whitehead amonisaki yango na buku na ye (The Divorce Culture) nsima ya 1960, “motángo ya mabala oyo ezali kokufa ebakisamaki makasi.” Alobi boye: “Na boumeli ya mbula zomi, motángo yango ebakisamaki mbala mibale mpe ekobaki komata tii na ebandeli ya bambula ya 1980, mpe motángo yango ezali se komata na mikili nyonso ya bozwi. Lokola motángo yango ya koboma mabala ezali se komata, yango esali ete na Amerika, koboma libala ekómi komonana mingi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto