Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/10 lok. 9
  • Sekele 7: Moboko ya makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sekele 7: Moboko ya makasi
  • Lamuká!—2010
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛlɛ́ ezali nde mpo na kozala na bolamu na libota?
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndako oyo ekabwani—Ndenge koboma libala esalaka bilenge
    Lamuká!—2010
  • Biblia elobi nini mpo na libala?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 1/10 lok. 9

Sekele 7: Moboko ya makasi

Elimboli nini? Mabota ya malamu etikalaka makasi kaka boye te ndenge mpe ndako etikalaka ya kotɛlɛma bambula mingi kaka mpamba te. Ndako ya makasi esɛngaka moboko ya makasi, ezali mpe bongo mpo na libota ya makasi. Mabota ya makasi etongami likoló ya mitinda oyo ebimisaka matomba.

Mpo na nini ezali na ntina? Batoli etali bomoi ya libota etondi na babuku, na bazulunalo, mpe na baemisyo ya televizyo. Bapesi-toli mosusu bayebisaka babalani oyo bazali na mikakatano ete bákabwana te, nzokande bamosusu bakoyebisa kaka babalani yango ete bákabwana. Bato ya mayele kutu babongolaka makanisi na bango na likambo yango. Na ndakisa, na 1994, moto moko ya mayele oyo ayekolaki makambo ya bilenge akomaki ete ntango abandaki mosala na ye, azalaki kokanisa ete “eleki malamu bana báfanda na moboti oyo azali kaka ye moko kasi azali na esengo, na esika báfanda na baboti mibale oyo bazali elongo kasi bayokanaka te. Nazalaki kokanisa ete eleki malamu koboma libala na esika ya kobundana na libala ya mabe.” Nzokande, nsima ya mbula 20, abongolaki makanisi na ye. Alobaki boye: “Koboma libala eningisaka bomoi ya bana mingi.”

Makanisi ya bato ekoki kobongwana, kasi soki toli ya malamu ezwami, toli yango ekozanga te koyokana ata mwa moke na mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe, Biblia. Ntango ozalaki kotánga masolo oyo, mbala mosusu omonaki ete likoló ya lokasa nyonso, banda na lokasa 3 tii na 8, ezali na etinda moko oyo euti na Biblia. Mitinda yango esalisá mabota mingi mpo ezala malamu. Lokola mabota nyonso, mabota yango mpe ezalaka na matata. Bokeseni ezali ete Biblia epesi mabota yango moboko ya makasi mpo na libala mpe bomoi ya libota. Biblia esengeli mpenza kosalisa ndenge wana, mpo Mobandisi na yango, Yehova Nzambe, azali Mobandisi ya libala.​—2 Timote 3:16, 17.

Meká kosala boye. Salá liste ya bavɛrsɛ oyo ezali na likoló, banda na lokasa 3 tii na 8. Bakisá bavɛrsɛ mosusu oyo esalisi yo. Liste yango esengeli te kozala mosika na yo, mpe tángáká yango mbala na mbala.

Zwá ekateli makasi. Zwá ekateli ya kosalela Biblia na libota na yo.

[Elilingi na lokasa 9]

Soki botye moboko makasi oyo euti na Makomami, libota na bino ekoki ekotɛlɛma makasi liboso ya mopɛpɛ makasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto