Sekele 5: Makambo makasimakasi te
‘Ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana.’—Bafilipi 4:5.
Elimboli nini? Na mabota ya malamu, mibali mpe basi balimbisanaka mabunga na bango. (Baroma 3:23) Bazalaka makambo makasimakasi te epai ya bana na bango mpe batikaka bango te básala nyonso oyo balingi. Batyaka mibeko ebeleebele te mpo na libota. Soki esɛngi kopesa disiplini, bapesaka yango “na ndenge oyo ekoki.”—Yirimia 30:11.
Mpo na nini ezali na ntina? Biblia elobi ete “bwanya oyo euti na likoló ezalaka . . . na makambo makasimakasi te.” (Yakobo 3:17) Nzambe ye moko asɛngaka te ete bato ya kozanga kokoka básala makambo ya kokoka, na yango mpo na nini moto asengeli kosɛnga molongani na ye asala makambo ya kokoka? Ya solo, kolandela ntango nyonso mabunga mikemike ya moninga ebimisaka kaka nkanda, ebongisaka eloko te. Malamu nde kondima ete “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”—Yakobo 3:2.
Baboti ya malamu bazalaka makambo makasimakasi te epai ya bana na bango. Bapesaka disiplini oyo eleki makasi te, mpe “bazalaka matata” te. (1 Petro 2:18) Batikelaka bana oyo bakómi bilenge mwa bonsomi ya kosala makambo mosusu, soki bazali kokokisa mikumba na bango malamu. Balukaka te kotyela bango mibeko na makambo nyonso ya mikemike. Buku moko emonisi ete komeka kotambwisa likambo nyonso ya bomoi ya elenge ezali lokola “kobina mabina makasimakasi mpo na konɔkisa mbula. Mbula ekonɔka te, kasi okolɛmba.”
Meká kosala boye. Yanolá mituna oyo elandi mpo na koyeba soki ozalaka makambo makasimakasi te.
◼ Mbala ya nsuka oyo okumisaki molongani na yo ezalaki mokolo nini?
◼ Mbala ya nsuka oyo otyolaki molongani na yo ezalaki mokolo nini?
Zwá ekateli makasi. Soki okakatanaki mpo na kozwa eyano na motuna ya liboso kasi ozalaki na mokakatano te mpo na koyanola na oyo ya mibale, kanisá mokano oyo okoki komityela mpo na makambo oyo osɛngaka bato mosusu básala.
Mpo na nini te kosolola na molongani na yo mpo na bikateli oyo bokoki kozwa?
Kanisá makambo oyo okoki kotikela mwana oyo akómi elenge mwa bonsomi ya kosala, soki azali kokokisa mikumba na ye malamu.
Mpo na nini te kosolola polele na mwana na yo mpo na makambo lokola kotya ntango oyo asengeli kozonga na ndako?
[Elilingi na lokasa 7]
Lokola sofele ya ekɛngɛ, na libota, moto ya makambo makasimakasi te atikelaka basusu esika ya liboso