Sekele 2: Komipesa
“Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”—Matai 19:6.
Elimboli nini? Babalani oyo bazali na boyokani makasi bamonaka ete libala esengeli koumela libela. Soki mokakatano ebimi, basalaka makasi básilisa yango, na esika ya kosalela yango mpo na koboma libala. Soki babalani nyonso mibale bamipesi mpenza, bakobanga eloko te. Mokomoko akotya motema ete moninga akokoba kopesa libala na bango lokumu.
Mpo na nini ezali na ntina? Komipesa ezali likonzi oyo esimbaka libala. Nzokande, soki mbala na mbala bozali na matata na libala, komipesa ekoki komonana nde lokola motambo. Kutu, maloba “tii liwa ekokabola biso” ekómaka boyokani moko ya bongobongo kaka, oyo babalani balingaka ekatana ata kokatana. Mbala mosusu, bakokima mpenza molongani na bango te, kasi bakoki kokima ye na ndenge mosusu, na ndakisa bakoki koboya na motema moko kolobisa moninga ntango esengeli kolobela makambo ya ntina.
Meká kosala boye. Yanolá mituna oyo elandi mpo na koyeba soki komipesa na yo ezali kaka makasi.
◼ Soki nazali koswana na molongani na ngai, ekómelaka ngai nakanisa ete nasalaki mabe ndenge nabalaki ye?
◼ Ekómelaka ngai mbala na mbala, nafandi boye mpe nazali kolɔta ete nazali ná molongani mosusu?
◼ Ekómelaka ngai naloba na molongani na ngai ete “Nakokima yo” to “Nakoluka moto mosusu oyo akosepela na ngai”?
Zwá ekateli makasi. Kanisá likambo moko to mibale oyo okoki kosala mpo na kokómisa makasi komipesa na yo. (Na ndakisa: Na bantango mosusu, okoki kokomela molongani na yo mokanda, kotya fɔtɔ na ye na esika na yo ya mosala, to kobenga ye na telefone mikolo nyonso ntango ozali na mosala, kaka mpo bósolola mwa moke.)
Mpo na nini te kobimisa makanisi ebele mpe kosɛnga molongani na yo apona oyo eleki malamu mpo na ye?
[Elilingi na lokasa 4]
Komipesa ezali lokola lopango oyo ekopekisa libala na bino etika nzela
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© Corbis/age fotostock