Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/09 lok. 32
  • ‘Porte oyo kaka Yehova nde akoki kofungola’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Porte oyo kaka Yehova nde akoki kofungola’
  • Lamuká!—2009
Lamuká!—2009
g 10/09 lok. 32

‘Porte oyo kaka Yehova nde akoki kofungola’

◼ Na 2007, tata ya Erika, oyo azalaki na mbula motoba ná Mattia oyo azalaki na mbula minei akufaki. Kasi, mpasi ya bana yango ekitaki mpo na elikya ya lisekwa oyo Biblia elobeli polele.​—Misala 24:15.

Erika asepelaka koyebisa elikya yango epai ya bato mosusu, mingimingi na eteyelo na bango na Sicile. Na ndakisa, ntango Béatrice, moninga na ye moko alobaki ete tata ya Erika azali na lola, Erika azongiselaki ye ete Biblia elobi bongo te. Béatrice atunaki ye, “kasi azali wapi?”

Erika alobaki ete azali “na lilita.” Béatrice alingaki koyeba soki lilita ezali nini.

Erika ayebisaki ye ete ezali lokola “porte oyo efungwamaka mpe ekangamaka. Kasi, soki porte yango ekangami, moto akoki kofungola yango te. Kaka Yehova nde akoki kofungola yango ntango mokili ya sika ekoya.”

Na nsima, Erika ayebisaki moninga na ye ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, akotya paradiso awa na mabele, mpe na ntango wana maladi ekozala te, mpe bato nyonso oyo bakufá bakozonga na bomoi. Na nsima, Erika asɛngaki moninga na ye Béatrice atuna mama na ye soki akolinga apesa ye buku moko oyo ezali kolobela makambo yango.

Mwa mikolo na nsima, ntango Erika ayokaki ete mama ya Béatrice andimi, Erika apesaki moninga na ye buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Erika akobaka koyebisa basusu makambo oyo ayekolaka na Biblia, mpe apesá molakisi na bango buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.

Ya solo, Erika ná leki na ye ya mobali bayokaka mawa mpo tata na bango akufá. Kasi, elikya ya lisekwa ebɔndisaka bango, esalisaka bango báyeba ete mokolo mosusu bakomona lisusu tata na bango. Mpo na elikya yango, bana wana mpe ebele ya bato mosusu na mokili batɔndaka Yehova, Nzambe ya kobɔndisama nyonso.​—Matai 21:16; 2 Bakorinti 1:3, 4.

Yo mpe okoki kozwa buku yango ya nkasa 256, oyo ezali na bililingi kitoko, mpe nkasa na yango ezali monene lokola oyo ya zulunalo oyo. Okoki kozwa yango soki otondisi mwa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga nafuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto