Bana balingi buku yango!
◼ Bana ya mbula ndenge na ndenge basepelaka na buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Mwana moko ya mwasi akomaki boye: “Buku yango ezali na makambo mingi ya kitoko oyo nalingaka. Na ndakisa, nasepelaki mpenza na bililingi na yango nyonso. Langi na yango kitoko ebendaka likebi ya motángi. Ntango nazali kotánga buku yango, nazalaki kozwa mwa ntango ya kotala bililingi yango na likebi mpe koluka ndenge eyokani na lisolo!
“Likambo mosusu oyo nalingaki na buku yango, ezali maloba oyo basaleli. Ezali pɛtɛɛ mpo na kosimba mpe epesaka esengo mingi ntango ozali otánga.
“Ntango nazali kotánga buku yango, nasepelaki na ndenge oyo balobeli mikakatano mosusu oyo tozali kokutana na yango lelo mpe ndenge oyo tokoki kokima yango. Mikapo oyo nasepelaki na yango mingi ezali, ‘Tosengeli kotikela komekama nzela te,’ ‘Liteya mpo na kozala na boboto,’ mpe ‘Olingaka ntango nyonso kozala na esika ya liboso?’”
Yo mpe okoki kozwa buku yango ya nkasa 256, oyo ezali na bililingi kitoko, mpe nkasa na yango ezali monene lokola oyo ya zulunalo oyo. Okoki kozwa yango soki otondisi mwa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.